Matthew 27:32-37

32Tango babimaki na vile, bakutanaki na moto moko ya mboka Sirene, kombo na ye Simon, mpe batindaki ye na makasi amema ekulusu ya Yesu. 33Bakomaki na esika moko babengaka Golgota (elingi koloba : “Esikaya mokuwa ya motu”). 34Mpe kuna, bapesaki Yesu vino oyo basangisa na makasa ya bololo. Kasi tango amekaki, aboyaki komela yango. 35Tango basilisaki kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba naye sima ya kobetela yango zeke. 36Bongo bavandaki wana mpo na kokengela ye. 37Babambaki na ekulusu, na likolo na motu na ye, mwa libaya mokompo na kolakisa tina oyo babomelaki ye ; bakomaki boye : “Oyo Yesu, mokonzi ya Bayuda !”
Copyright information for LinMNB