Matthew 27:57-61

57Tango pokwa ekomaki, moto moko ya mbongo mingi kombo na ye Zozefiayaki. Ye azalaki moto ya mboka Arimate mpe azalaki moyekoli ya Yesu. 58Akendaki epai ya Pilato mpe asengaki nzoto ya Yesu. Bongo Pilatoatindaki bapesa ye yango. 59Zozefi azwaki nzoto, alingaki yango na elamba ya peto, 60mpe akotisaki yango na lilita na ye ya sika oyo atobolaki na katiya libanga. Bongo apusaki libanga moko ya monene liboso ya porte ya lilita, bongo azongaki na ye. 61Mariya ya Magadala mpe Mariya oyo mosusu bavandaki wana, liboso yalilita.
Copyright information for LinMNB