Matthew 28

Yesu asekwi

(Mk. 16.1-8 ; Lk. 24.1-12 ; Jn. 20.1-2)

1Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, sima ya mokolo ya Saba, Mariya ya Magadala mpe Mariya oyo mosusu, bakendaki kotala lilita. 2Mokili eninganaki makasi penza, pamba te anzelu ya Nkolo awutakina likolo, ayaki, alongolaki libanga mpe avandaki likolo na yango. 3Lolenge na ye ezalaki lokola kongenga ya kake, mpe bilamba na yeezalaki pembe makasi penza. 4Somo monene ekotelaki bakengeli : babandaki kolenga mpe bakomakilokola bato bakufi. 5Bongo anzelu alobaki na basi :

—Bobanga te, nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu.
6Azali awa te, asiʼasekwi ndenge alobaki. Boya kotala esika ye alalaki. 7Bongo bokende noki koyebisa bayekoli na ye ete asiʼasekwi kati na bakufi. Mpe akeyi liboso na bino na Galileya. Bokomona ye kuna ! Sikʼoyonayebisi bino ! 8Batikaki lilita noki penza, na kobanga mpe na esengo monene. Mpebakendaki mbango koyebisa sango yango na bayekoli na ye. 9Na mbala moko, Yesu akutanaki na bango. Alobaki :

—Mbote na bino ! Bayaki epai na ye, basimbaki makolo na ye, mpe bakumisaki ye.
10Bongo Yesu alobaki na bango :

—Bobanga te ! Bokende mpe boyebisa bandeko na ngai bakende na Galileya ; bakomona ngai kuna !
11Tango basi bazalaki kokende, bakengeli mosusu bakendaki na vilempe bayebisaki na bakonzi ya banganga-Nzambe makambo nyonso ndenge yangoesalamaki. 12Tango bakonzi ya banganga-Nzambe bakutanaki na bankolo ya Bayuda, babongisaki mwango moko. Bapesaki basoda mbongo ebele, 13mpe balobaki na bango boye :

—Boloba boye : tango biso tozalaki kolala pongi, bayekoli na yebayaki na butu koyiba nzoto na ye.
14Soki guvelenele ayoki likambo yango, tokokitisa ye motema, mpe bokozwa matata te ! 15Basoda bazwaki mbongo mpe basalaki ndenge batindaki bango. Mpesango oyo epanzana na kati ya Bayuda kino lelo oyo.

Yesu abimeli bayekoli na ye

16Bongo bayekoli zomi na moko bakendaki na Galileya, na ngomba oyo Yesu ayebisa bango bakende. 17Tango bamonaki ye, bakumisaki ye ; kasi basusu kati na bangobazalaki na tembe. 18Yesu ayaki epai na bango mpe alobaki :

—Bokonzi nyonso, na Likolo mpe awa na nse epesami na maboko na ngai.
19Yango wana bokende mpe bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli nangai, bobatisa bango na kombo ya Tata, ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu. 20Boteya bango batosa nyonso oyo natindaki bino. Boyeba ete nazali na bino mikolo nyonso, kino na suka ya mokili.
Copyright information for LinMNB