Matthew 3:13-17

13Yesu awutaki na Galileya mpe ayaki na Yordani. Ayaki epai ya Jean mpo na kozwa libatisi. 14Kasi Jean alingaki kopekisa ye, mpe alobaki na ye :

—E e ! ezali ngai moto nalingaki koya kozwa libatisi epai na yo, kasi yo oye epai na ngai !

15Kasi Yesu azongisaki :

—Tika ete ezala bongo sikʼoyo ! Pamba te, ezali na lolenge oyo nde ekoki na biso kokokisa bosembo nyonso.

Bongo Jean andimaki.

16Tango Yesu azuaki libatisi, abimaki na mayi, likolo efungwamaki, mpe amonaki Molimo na Nzambe azalaki kokita lokola pijon, mpe ayaki likolo na ye. 17Mpe mongongo ewutaki na likolo elobaki :

—Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, asepelisaka ngai mingi !
Copyright information for LinMNB