Matthew 4

Bameki Yesu

(Mk. 1.12-13 ; Lk. 4.1-13)

1Bongo Molimo amemaki Yesu na esobe mpo zabolo ameka ye. 2Sima ya koboya kolia bilei mpo na mabondeli mikolo ntuku minei : moi mpe butu, Yesu ayokaki nzala. 3Momeki ayaki epai na ye mpe alobaki :

—Soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na mabanga oyo ebongwana mampa !

4Kasi Yesu azongisaki :

—Ekomama : Moto akozala na bomoi kaka mpo na limpa te,
kasi mpe mpo na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe !

5Bongo Zabolo amemaki ye na vile ya bosantu, atiaki ye na esika oyo eleki likolo, oyo ya Ndako ya Nzambe, 6mpe alobaki na ye :

—Soki ozali Mwana ya Nzambe, mibwaka na nse. Pamba te ekomama : Akotinda baanzelu na ye mpo na yo.
Bakomema yo na maboko na bango,
mpo ete lokolo na yo etuta libanga te !

7Yesu azongisaki :

—Ekomama lisusu : Komeka Nkolo Nzambe na yo te !

8Zabolo amemaki ye lisusu likolo ya ngomba moko ya molayi penzampe alakisaki ye bokonzi ya mikili nyonso, na lokumu na yango. 9Bongo alobaki na ye :

—Soki ofukameli ngai mpe okumbameli ngai, nakopesa yo nyonso oyo !

10Kasi yesu alobaki na ye :

—Longwa Satana ! Pamba te ekomama : Kumbamela Nkolo Nzambe na yo mpe
salela kaka ye moko !

11Bongo zabolo atikaki ye, mpe baanzelu bayaki kosalela ye.

MOSALA YA YESU NA GALILEYA

Yesu abandi koteya

(Mk. 1.14-15 ; Lk. 4.14-15)

12Tango yesu ayokaki ete batiaki Jean na boloko, azongaki na Galileya ; 13tango atikaki Nazareti, akendaki kovanda na Kapenawumi, oyo ezali pembeni ya ebale, na mikili ya zabumoni mpe ya Neftali, 14mpo ete maloba ya moprofeta Ezayi ekokisama :
15 Mokili ya zabuloni
mpe mokili ya Neftali,
nzela ya ebale, na ngambo ya Yordani,
e e yo Galileya ya bapakano :

16 Bato oyo bazalaki na molili,
bamonaki mwinda monene ;
bazalaki kovanda na mboka ya molili ya kufa,
moi ebimeli bango.

17Banda tango wana, Yesu abandaki koteya boye :

—Bobongola mitema, pamba te Bokonzi ya likolo ekomi pene-pene !

Bayekoli ya liboso ya Yesu

(Mk. 1.16-20 ; Lk. 5.1-11)

18Awa Yesu azalaki kotambola pembeni-pembeni ya ebale monene ya Galileya, amonaki bandeko mibale : Simon oyo bazalaki kobenga lisusu Piere na ndeko na ye Andele ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki baluki mbisi. 19Yesu alobaki na bango :

—Bolanda ngai, mpe nakokomisa bino baluki ya bato !

20Kaka na tango wana, batikaki minyama na bango ; mpe balandaki ye.

21Tango apusanaki mwa liboso, amonaki lisusu bandeko mibale : Zaki mwana ya Zebede na ndeko na ye Jean ; bazalaki kobongisa minyama na bango na kati ya bwato elongo na tata na bango Zebede. Bongo Yesu abengaki bango. 22Mpe kaka na tango wana, basundolaki bwato na bango, batikaki tatana bango, mpe balandaki ye.

Yesu abikisi bato ya maladi

(Lk. 6.17-19)

23Yesu atambolaki na Galileya mobimba, azalaki koteya na bandakona bango ya mayangani, azalaki kosakola Sango Malamu ya Bokonzi, mpe azalaki kobikisa bamaladi ya ndenge nyonso mpe bapasi ya ndenge na ndengekati na bato. 24Sango na ye epanzanaki na ekolo ya Siriya mobimba, mpe bamemelaki ye bato nyonso oyo bazalaki na maladi, baoyo bazalaki koyoka bapasi ya ndenge na ndenge, mpe minyoko ya ndenge na ndenge, baoyo bazalaki na milimo mabe, baoyo bazalaki na maladi ya ndeke, mpe baoyo bazalaki na maladi ya buka-buka. Bongo yesu azalaki kobikisa bango.

25Bato ebele penza bazalaki kolanda ye ; ezalaki : bato ya Galileya, ya “Bavile zomi”, ya Yeruzalem na yo Yudea, mpe ya mokili oyo ezalaki na ngambo ya Yordani.
Copyright information for LinMNB