Matthew 9

Yesu abikisi moto akufa makolo mpe alimbisi masumu na ye

(Mk. 2.1-12 ; Lk. 5.17-26)

1Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendaki na vile na ye. 2Bamemelaki ye moto moko akufa makolo, oyo azalaki ya kolala na mbeto. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na moto oyo akufa makolo :

—Mwana na ngai, yika mpiko, masumu na yo elimbisami !

3Mpo na yango, balakisi mosusu ya Mibeko babandaki koloba-loba na nse ya mitema : “A a, moto oyo azali kotiola Nzambe !” 4Yesu ayebaki makanisi na bango mpe atunaki bango :

—Mpo na nini bozali na makanisi ya mabe na mitema na bino ?
5Eloko nini ezangi pasi mpo na koloba : “Masumu na yo elimbisami”, to koloba : “Telema mpe tambola ?” 6Kasi mpo boyeba ete Mwana ya Moto azali na bokonzi, na mokili, ya kolimbisa masumu…

Bongo alobaki na moto oyo akufa makolo :

—Telema, kamata mbeto na yo, mpe zonga na ndako na yo.

7Moto yango atelemaki mpe akendaki na ndako na ye.

8Tango ebele ya bato bamonaki bongo, kobanga ezwaki bango, mpe babandaki kokumisa Nzambe oyo apesaki bokonzi ya ndenge wana na bato.

Batieli Yesu tembe

(Mk. 2.13-22 ; Lk. 5.27-39)

9Bongo Yesu akendaki. Tango azalaki koleka, amonaki moto moko kombo na ye Matie, avandaki na biro oyo bafutiselaka mpaku. Bongo yesu alobaki na ye :

—Landa ngai !

Matie atelemaki mpe alandaki ye.
10Tango yesu azalaki kolia na ndako ya Matie, bafutisi mpaku ebele, na bato ya masumu, bayaki mpe baliaki elongo na Yesu, na bayekoli na ye. 11Tango bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli na ye :

—Mpo na nini moteyi na bino azali kolia elongo na bafutisi mpaku mpe bato ya masumu ?

12Tango yesu ayokaki yango, alobaki :

—Bato ya nzoto malamu bazalaka na posa ya monganga te, kasi ezali bato ya maladi nde bazalaka na posa ya monganga
13Kasi bokende koyekola tina ya maloba oyo : Nalingi bozala bato ya mitema mawa, kasi naboyi mbeka. Pamba te ; nayaki mpo na kobengabato na sembo te, kasi bato ya masumu.

14Bongo bayekoli ya Jean bayaki mpe batunaki ye :

—Mpo na nini, biso na bafarizeo toboyaka kolia mpo na mabondeli, kasi bayekoli na yo baboyaka kolia te mpo na mabondeli ?

15Yesu azongiselaki bango :

—Ndenge nini, bato oyo babengami na mobali oyo abali, bakoki kozala na mawa na tango ye azali elongo na bango ? Kasi tango ekoya, tango bakolongola mobali oyo abali na kati na bango ; bongo nde bakoboya kolia.

16Moto moko te akoki kokamata kitendi ya sika mpona abamba elambaya kala, mpo ete kitendi wana ekopasola elamba ya kala mpe lidusu ekokoma monene. 17Ndenge moko mpe batiaka te vino ya sika na basaki ya kala
basaki oyo, bazalaki kosala yango na mposo ya nyama.
 ; soki te basaki ekopasuka, vino ekosopana mpe basaki ekobeba. Kasi batiaka vino ya sika na basaki mpe ya sika, bongo vino na basaki ekobombama malamu !

Yesu aleki maladi mpe liwa na makasi

(Mk. 5.21-43 ; Lk. 8.40-56)

18Tango Yesu azalaki naino koloba makambo wana, mokonzi moko ayaki, afukamaki liboso na ye mpe alobaki :

—Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sikʼoyo, kasi yaka kotiela ye loboko na yo mpe akozala lisusu na bomoi !

19Yesu atelemaki mpe alandaki ye elongo na bayekoli na ye.

20Mwasi moko azalaki na maladi ya kotanga makila, mpe maladi yango ewumelaki bambula zomi na mibale ; ayaki na sima mpe asimbaki songeya elamba na Yesu. 21Pamba te, akanisaki ete : “Soki nasimbi kaka elamba na ye, nakobika !”

22Yesu atalaki na sima, amonaki ye mpe alobaki :

—Mwana na ngai, yika mpiko ; kondima na yo ebikisi yo !

Mpe mwasi abikaki kaka na tango wana.

23Tango yesu akomaki na ndako ya mokonzi, amonaki babeti miziki na batoebele bazalaki kotia makelele ; 24bongo alobaki :

—Bobima, mwana akufi te kasi alali pongi.

Kasi bato babandaki koseka ye.

25Sima ya kobimisa bato libanda, akotaki, asimbaki elenge mwasina loboko, bongo elenge mwasi atelemaki ! 26Sango yango epanzanaki na ekolo wana mobimba.

27Tango Yesu alongwaki wana, bato mibale bakufa miso bazalaki kolanda ye na koganga :

—Mwana ya David, yokela biso mawa !

28Tango akotaki na ndako, bakufi miso bayaki epai na ye ; mpe atunaki bango :

—Bondimi ete nakoki kosala yango ?

Bango bazongisaki :

—E e nkolo !

29Bongo asimbaki miso na bango, mpe alobaki :

—Esalemela bino ndenge bondimeli !

30Bongo miso na bango efungwamaki. Yesu akebisaki bango :

—Boyoka, moto moko te ayeba likambo oyo.

31Kasi bango tango bakendaki, bapanzaki Sango na ye na ekolowana mobimba.

32Tango bazalaki kobima, bamemelaki ye moto moko azalaki na molimomabe mpe azalaki koloba te. 33Tango Yesu abenganaki molimo wana ya mabe, moto oyo azalaki kolobate, abandaki koloba. Bato bakamwaki mpe balobaki :

—Naino tomoni likambo ya boye te na Isayele !

34Kasi bafarizeo balobaki :

—Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.

Yesu ayokela bato mawa

(Mk. 6.34 ; Lk. 10.2)

35Yesu azalaki kotambola na bamboka nyonso mpe na bavile nyonso ; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani, mpe azalaki kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bamaladi nyonso mpe bapasi ya ndenge na ndenge. 36Tango amonaki ebele ya bato, ayokaki mawa mingi penza mpo na bango, pamba te bazalaki komitungisa mpe bazalaki ya kolemba lokola bameme oyo ezangi mobateli.

37Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Bambuma ya kobuka ezali mingi na elanga, kasi basali bazali moke !
38Yango wana bosenga nkolo ya elanga atinda basali na elanga na ye !
Copyright information for LinMNB