Matthew 9:18-23

18Tango Yesu azalaki naino koloba makambo wana, mokonzi moko ayaki, afukamaki liboso na ye mpe alobaki :

—Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sikʼoyo, kasi yaka kotiela ye loboko na yo mpe akozala lisusu na bomoi !

19Yesu atelemaki mpe alandaki ye elongo na bayekoli na ye.

20Mwasi moko azalaki na maladi ya kotanga makila, mpe maladi yango ewumelaki bambula zomi na mibale ; ayaki na sima mpe asimbaki songeya elamba na Yesu. 21Pamba te, akanisaki ete : “Soki nasimbi kaka elamba na ye, nakobika !”

22Yesu atalaki na sima, amonaki ye mpe alobaki :

—Mwana na ngai, yika mpiko ; kondima na yo ebikisi yo !

Mpe mwasi abikaki kaka na tango wana.

23Tango yesu akomaki na ndako ya mokonzi, amonaki babeti miziki na batoebele bazalaki kotia makelele ;
Copyright information for LinMNB