Philemon

Mbote

1Ngai Polo, moto ya boloko mpo na Yesu Kristo, mpe ndeko na biso Timote, totindi mokanda oyo epai ya molingami mpe moninga na biso ya mosala Filemo, 2epai ya ndeko na biso ya mwasi Apia, epai ya Arshipe moninga na biso ya etumba, mpe na Lingomba oyo esanganaka na ndako ya Filemo.

3Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Kristo, ezala na bino.

Polo azongisi matondi epai ya Nzambe mpo na kondima mpe mpo na bolingo ya Filemo

4Nazongisaka matondi tango nyonso epai ya Nzambe tango nakanisaka yo na mabondeli na ngai, 5pamba te nazali koyoka sango ya kondima oyo ozali na yango kati na Nkolo Yesu, mpe bolingo oyo ozali na yango mpo na basantu nyonso. 6Nabondelaka mpo ete kondima oyo tozali na yango lisanga ebimisa mosala, mpo eteososola na mingi penza makambo nyonso ya malamu, oyo tozali na yango kati na Kristo. 7Bolingo na yo ezali kopesa ngai esengo monene mpe molende, pamba te, yo ndeko, okitisaki mitema ya basantu.

Polo asengi mpo na Onesime

8Yango wana, atako nazali na bonsomi kati na Kristo mpo na kotinda yo kosala likambo oyo osengeli kosala, 9kasi bolingo ezali kotinda ngai na makasi ete na senga yo—Ngai Polo, mobange, mpe sikʼoyo, moto ya boloko lisusu mpo na Yesu Kristo. 10Nazali kosenga yo mpo na Onesime, ye oyo azali mwana na ngai kati na Kristo ; pamba te, nakomaki tata na ye ya molimo tango nazalaki na boloko. 11Liboso, azalaki na tina moko te mpo na yo, kasi sikʼoyo akomi na tina mingi mpo na yo mpe na ngai.

12Nazali kotindela yo ye, ye oyo azali motema na ngai penza, mpo azongela yo. 13Nalingaki atikala awa elongo na ngai, mpo ete akoka kosalisa ngai na esika na yo, lokola nazali na boloko mpo na Sango Malamu. 14Nalingi kosala eloko moko te soki ondimi yango te, mpo ete bolamu oyo okosala, ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi ezala ya kotindika te.

15Tanga mosusu Onezime akabwanaki na yo mpo na mwa tango, mpo ete ozwa ye mpo na libela, 16lokola mowumbu lisusu te, kasi koleka kutu mowumbu, lokola ndeko ya bolingo. Azali na litomba mingi mpo na ngai, kasi azali mpe na litombamingi koleka mpo na yo, lokola moto mpe lokola ndeko kati na Nkolo.

17Soki omonaka ngai lokola moto oyo tozali na yo lisanga moko, nasengi yo oyamba ye lokola ngai moko. 18Soki, asalaki yo mabe to mpe azali na nyongo na yo, tia yango na kombo na ngai. 19Ngai Polo, nazali kokoma makambo oyo na loboko na ngai moko. Nakofuta yo nyongo yango—mpe nalingi te kokanisela yo ete, yo mpeozali na nyongo na ngai : nyongo yango nde bomoi na yo moko.

20Ya solo ndeko na ngai, salela ngai bolamu wana mpo na Nkolo ; kitisa motema na ngai kati na Kristo. 21Nakomeli yo, mpo nazali na elikya ete okosala likambo oyo nasengi yo, mpe nayebi ete okosala yango kutu koleka.

22Nasengi yo lisusu obongisela ngai esika ya kolala, pamba te nazali na elikya ete Nzambe akopesa eyano na mabondeli na bino, mpe akozingisa ngai epai na bino.

Bambote ya suka

23Epafras, moninga na ngai ya boloko mpo na Yesu Kristo, atindeli yo mbote. 24Ndenge moko mpe baninga na ngai ya mosala : Marko, Aristake, Demas, mpe Luka, bango mpe batinkeli yo mbote.

25Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na molimo na yo.
Copyright information for LinMNB