Psalms 1

MOKANDA YA LIBOSO

Mibeko na Yawe, ezali ebandeli ya mapamboli


1 Mapamboli na moto oyo
aboyaka kolanda toli ya bato na mabe,
oyo atelemaka te na nzela ya bato ya masumu,
mpe avandaka esika moko te na batioli.

2 Kasi asepelaka na Mibeko na Yawe ;
mpe akanisaka yango na se ya motema na ye
butu mpe moi.

3 Moto yango azali lokola nzete oyo
balona pene-pene ya mayi ;
oyo ebotaka mbuma na tango na yango ;
mpe makasa na yango ekawukaka te.
Makambo nyonso oyo asalaka etambolaka malamu.

4 Kasi ezali bongo te mpo na bato na mabe ;
bango, bazali lokola matiti ya kokawuka,
oyo mopepe epanzaka-panzaka.

5 Yango wana bato na mabe
bakotelema te na mokolo ya kosambisama,
to mpe bato ya masumu
kati na lisanga ya bato na sembo.

6 Pamba te Yawe ayebi nzela ya bato na sembo ;
kasi nzela ya bato na mabe ekobeba.
Copyright information for LinMNB