Psalms 111

Asalaki makambo ya kokamwa


1 Bosanzola Yawe !
Nakonetola Yawe na motema na ngai mobimba,
na kati ya bokutani ya bato na alima
mpe na kati ya lisanga.

2 Misala ya Yawe ezali minene ;
baoyo nyonso balingaka yango,
bakanisaka yango.

3 Mosala na ye ezali na nkembo mpe na lokumu ;
mpe bosembo na ye ewumelaka libela na libela.

4 Asalaki ete makambo ya kokamwa na ye
bakanisaka yango ;
Yawe atondi na ngolu mpe na mawa.

5 Apesaka biloko ya kolia na baoyo babangaka ye ;
akanisaka lisusu Boyokani na ye tango nyonso.

6 Alakisaki bato na ye nguya na misala na ye,
nakopesaka bango mabele ya bato ya
bikolo mosusu.

7 Misala ya maboko na ye ezali boyengebene mpe bosembo ;
makebisi na ye nyonso ebongi na kotiela motema.

8 Epikama mpo na libela na libela,
esalama kati na boyengebene mpe kati na bosembo.

9 Apesaki kokangolama na bato na ye ;
atindaki Boyokani na ye mpo na libela.
Kombo na ye ezali bosantu mpe sukisa.

10 Kobanga Yawe ezali ebandeli ya bwania ;
baoyo nyonso balandaka makebisi
bazali na bososoli ya malamu.
Masanzoli ya libela na libela ezali ya ye.
Copyright information for LinMNB