Psalms 113

Nzambe oyo akokani na nzambe mosusu te


1 Bosanzola Yawe.
Bosanzola bino basali ya Yawe,
bosanzola kombo ya Yawe !

2 Tika ete kombo ya Yawe esanzolama,
wuta sikʼoyo mpe libela na libela !

3 wuta epai moi ebimaka kino na epai yango elalaka !
kombo ya Yawe esanzolama,

4 Yawe anetolami likolo ya bikolo nyonso ;
nkembo na ye likolo ya lola.

5 Nani akokani na Yawe Nzambe na biso,
Oyo atia kiti na ye ya bokonzi na likolo ?
6Oyo agunzamaka mpo na kotala likolo mpe mokili ?

7 Abimisaka mobola wuta na putulu,
mpe atombolaka mokeleli wuta
na se ya fulu ya matiti ya kopola,

8 avandisaka bango elongo
na bana ya bakonzi
elongo na bana ya bakonzi ya bato na bango.

9 Ye atiaka mwasi oyo abotaka te na ndako na ye ;
lokola mama ya bana oyo azali na esengo.
Bosanzola Yawe.
Copyright information for LinMNB