Psalms 125

Kimia ya solo

Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Baoyo batiaka mitema na Yawe
bazali lokola ngomba ya Siona, eninganaka te
ekotikala libela na libela.

2 Lokola bangomba ezinga Yeruzalem,
ndenge moko mpe Yawe azingi bato na ye,
banda sikʼoyo kino libela na libela.

3 Nzete ya bokonzi ya bato ya mabe ekovanda te
na mabele ebongisami mpo na bato na sembo ;
mpo ete bato na sembo bakosalela maboko na bango te
na kosala mabe.

4 Sala malamu, Yawe, epai ya baoyo basalaka malamu,
epai ya baoyo bazali alima na mitema.

5 Kasi baoyo babalukaka
mpo na kolanda banzela etengama,
Yawe akobebisa bango elongo na basali ya mabe.
Kimia ezala likolo ya Isayele !
Copyright information for LinMNB