Psalms 132

Vile ya Mokonzi

Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Yawe kanisa lisusu David,
mpe bapasi na ye nyonso amonaki,

2 alapaki ndayi na Yawe,
mpe apesaki elaka na Moto ya nguya ya Zakobi :

3 “Nakokota na ndako na ngai te,
mpe nakomata na mbeto na ngai te ;

4 nakondima te ete miso na ngai elala,
mpe nakolala ata mua pongi te,

5 kino tango nakozwa esika mpo na Yawe,
esika mpo na Moto ya nguya ya Zakobi !”

6 Toyokaki sango na Efalata,
toyokelaki yango na elanga ya yaar.

7 Tika tokota epai ye avandaka ;
togumbama na esika oyo atiaka makolo na ye.

8 Telema, Yawe, mpe kota na esika na yo
epai opemaka,
yo na Sanduku ya makasi na yo.

9 Tika ete banganga-Nzambe na yo balata bosembo,
tika basantu na yo bayemba na esengo.

10 Mpo na mosali na yo, David
kobwaka te mopakolami na yo !

11 Yawe alapaki ndayi na David,
ndayi ya solo oyo akobongola te :
“Moko na kati ya bana ya libota na yo,
‘nokotia’ na Kiti na yo ya bokonzi.

12 Soki bana na yo babateli Boyokani na ngai,
mpe bikateli oyo nakoteya bango,
bana na bango mpe bakovanda libela
na Kiti na yo ya bokonzi.”

13 Pamba te Yawe apona Siona ;
alingaki yango mpo ezali esika na ye ya kovanda :

14 “Oyo ezali esika na ngai ya kopema
mpo na libela na libela ;
awa nakotia kiti na ngai ya bokonzi pamba te nalingaki yango.

15 Nakopambola yango na biloko mingi penza ;
nakotondisa babola na yango na biloko ya kolia.

16 Nakolatisa banganga-Nzambe na yango lobiko,
mpe basantu na yango bakoyemba libela na libela na esengo.

17 Ezali kuna nde nakotelemisa liseke ekola
mpo na David ;
mpe nakobongisa mwinda
mpo na mopakolami na ngai

18 Nakolatisa banguna na ye soni ;
kasi ekoti na ye ya lokumu ekongenga
likolo ya motu na ye.”
Copyright information for LinMNB