Psalms 25

Yawe, lakisa ngai nzela oyo nasengeli kolanda

Nzembo ya David


1 Yawe,
Epai na yo nde na tomboli molimo na ngai !

2 Epai na yo natie motema na ngai, Nzambe na ngai ;
kotika te ete nayoka soni,
kotika te ete banguna na ngai balonga ngai.

3 Moto moko te na baoyo batiaka elikya epai na yo akoyoka soni ;
kasi bakoyoka soni baoyo batekaka baninga kaka pamba.

4 Lakisa ngai banzela na yo, Yawe ;
Yawe teya ngai banzela na yo.

5 Kamba ngai kati na solo na yo,
mpe teya ngai ;
pamba te yo ozali Nzambe Mobikisi na ngai ;
mpe elikya na ngai ezali kati na yo mokolo mobimba,

6 kanisa, Yawe, mawa na yo ya monene mpe bolingo
na yo ya monene ;
pamba te yango ezali wuta kala.

7 Kokanisa te masumu ya bolenge na ngai,
mpe banzela na ngai ya botomboki ;
Na ndenge ya bolingo na yo kanisa ngai
pamba te yo ozali malamu, Yawe.

8 Yawe azali malamu mpe alima ;
yango wana ateyaka bato ya masumu
na ba nzela na ye.

9 Akambaka bato oyo bamikitisa,
kati na makambo oyo ezali sembo ;
mpe ateyaka bango nzela na ye.

10 Banzela nyonso ya Yawe
etonda na bolingo mpe boyengebene,
mpo na baoyo babatelaka makambo oyo boyokani na ye esengaka.

11 Yawe,
mpo na kombo na yo,
limbisa lisumu na ngai ;
pamba te lisumu yango eleki monene.

12 Nani oyo abangaka Yawe ?
Akoteya ye na nzela oyo bapona mpo na ye.

13 Akolekisa mikolo na ye na kati na bomengo,
mpe bana na ye bakozwa mokili lokola libula.

14 Yawe amipesaka
epai ya bato oyo babangaka ye ;
alakisaka bango boyokani na ye.

15 Miso na ngai etalaka tango nyonso
epai na Yawe,
pamba te ye moto akolongola makolo na ngai na monyama.

16 Baluka epai na ngai mpe monisa ngolu na yo epai na ngai
pamba te nazali ngai moko,
mpe nazali moto ya pasi.

17 Mikakatano ya motema na ngai ezali kobakisama ;
longola ngai na pasi na ngai.

18 Tala mawa na ngai mpe bapasi na ngai ;
longola masumu na ngai nyonso.

19 Yawe,
tala ndenge banguna na ngai bazali kokoma ebele,
mpe bazali koyina ngai
na koyina moko ya mabe penza.

20 Batela bomoyi na ngai
mpe kangola ngai ;
kotika te ete nayoka soni,
pamba te na bombamaka kati na yo.

21 Tika ete boyengebene mpe bosembo ebatela ngai,
pamba te elikya na ngai ezali epai na yo !

22 Longola Isayele na bowumbu, Nzambe
na minyoko na bango nyonso.
Copyright information for LinMNB