Psalms 27

Nazali ya kobatelama malamu pene-pene ya Nzambe

Nzembo ya David


1 Yawe azali pole na ngai
mpe lobiko na ngai :
bongo nakobanga nani ?
Yawe azali ndako makasi ya bomoi na ngai :
bongo nakobanga nani ?

2 Tango bato na mabe bakoya liboso na ngai mpo na kolia mosuni na ngai,
tango bayini na ngai mpe banguna na ngai
baye kobundisa ngai,
bakobeta libaku mpe bakokweya.

3 Ata soki lipinga ya basoda ezingi ngai,
motema na ngai ekobanga te ;
ata soki etumba ekweli ngai,
ata bongo, nakozala kaka na elikya.

4 Eloko moko nasengaka epai na Yawe,
yango nde nalukaka :
ete navanda na ndako ya Yawe,
na mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
mpo nakotalaka kitoko ya Yawe,
mpo na koluka ye kati na ndako na ye.

5 Pamba te na mokolo ya mikakatano,
akobatela ngai malamu kati na esika evandi ye,
akobomba ngai na kati ya Ndako na ye ya kapo ;
mpe akotelemisa ngai likolo ya libanga.

6 Bongo, motu na ngai ekonetolama
likolo ya banguna na ngai oyo bazingi ngai ;
na ndako na ye ya kapo, nakopesa mbeka,
na milolo ya esengo ;
nakoyemba mpe na kobeta misiki mpo na Yawe.

7 Yoka mongongo na ngai, tango
nazali kobenga, Yawe ;
yokela ngai mawa mpe zongisela ngai eyano.

8 Motema na ngai elobi mpo na yo ;
“Luka elongi na ye !”
Elongi na yo, Yawe, nakoluka.

9 Kobombela ngai elongi na yo te,
kobengana mosali na yo na kanda te ;
Yo ozalaki mosungi na ngai,
kotika ngai te, kosundola ngai te,
Nzambe Mobikisi na ngai !

10 Atako tata na ngai mpe mama na ngai basundoli ngai,
kasi Yawe akoyamba ngai.

11 Teya ngai nzela na yo, Yawe ;
tambolisa ngai na nzela oyo etengama te ;
mpo na baoyo bazali konyokola ngai.

12 Kokaba ngai te
na posa mabe ya bayini na ngai ;
pamba te batemwe ya lokuta batelemeli ngai,
bazali kobimisa kaka makambo ya mobulu.

13 Natie motema na likambo oyo : nakomona bolamu ya Yawe
kati na mokili ya bato ya bomoi !

14 Talela Yawe !
Zala makasi mpe lendisa motema na yo !
ya solo talela Yawe.
Copyright information for LinMNB