Psalms 3

Lobiko ewutaka epai na Yawe

Nzembo ya David, ayembaki yango tango azalaki kokima mwana na ye Abisalom.


1 Yawe, tala ndenge banguna na ngai bakomi mingi penza !
Bato mingi penza bazali kobundisa ngai !

2 Bato mingi penza bazali koloba mpo na ngai :
“Nzambe akosalisa ye te !”

3 Kasi yo Yawe,
ozali ebende ya makasi oyo ebatelaka ngai,
ozali nkembo na ngai,
oyo alamusaka motu na ngai.

4 Nazali koganga epai na Yawe,
mpe akopesa ngai eyano
wuta na ngomba na ye ya bosantu.

5 Nalali mpe pongi ekangi ngai ;
nakolamuka malamu
pamba te Yawe abatelaka ngai.

6 Nakobanga te bato bankoto na bankoto
oyo batelemeli ngai bipai na bipai.

7 Yawe telema !
Nzambe na ngai, kangola ngai !
Pamba te obeti banguna na ngai nyonso na matama ;
mpe obuki mino ya bato na mabe.

8 Lobiko ewutaka na Yawe,
tika ete mapamboli na yo ezala likolo ya bato na yo.
Copyright information for LinMNB