Psalms 38

Moto oyo anyokwami na maladi mpe na masumu

Nzembo na David mpo na kokanisa.


1 Yawe,
kopamela ngai te kati na kanda na yo,
to kopesa ngai etumbu te kati na kanda na yo ya monene.

2 Pamba te makonga na yo esiʼetoboli ngai ;
mpe loboko na yo esiʼebeti ngai.

3 Mpo na kanda na yo ya monene,
nzoto na ngai ezali malamu te,
mikuwa na ngai lisusu makasi te,
mpo na masumu na ngai.

4 Mabe na ngai efini ngai ;
lokola mokumba ya kilo mingi,

5 Bapota na ngai ekomi kopola mpe kolumba solo,
mpo na bozoba na ngai na masumu.

6 Nakumbami na se mpe nakiti na se ;
mokolo mobimba, natambolaka na mawa mingi na motema.

7 Pamba te mokongo na ngai ezali koyoka pasi mingi ;
mpe eloko ata moko te ya malamu etikali na nzoto na ngai.

8 Nazali ya kolemba,
mpe na bukani-bukani mobimba ;
nazali kolela na bapasi ya motema.

9 Baposa na ngai nyonso ezali polele liboso na yo, Yawe ;
kopema ya kati ezali ya koboma te epai na yo.

10 Motema na ngai ezali kobeta makasi penza,
makasi na ngai nyonso esili,
pole elongwe na miso na ngai

11 mpe baoyo batambolaka na ngai
bakimi ngai mpo na bapota na ngai ;
baoyo bazalaka na ngai esika moko
bakomi kotelema mosika na ngai.

12 Baoyo balukaka bomoi na ngai,
bazali kotia mitambo na bango ;
baoyo balukaka kosala ngai mabe
bazali kolobela libebi na ngai ;
mokolo mobimba bazali kobongisa mabe.

13 Nakomi lokola moto akufa matoyi,
oyo akoki koyoka te ;
nakomi lokola baba oyo akoki kofungola monoko na ye te.

14 Nakomi lokola moto oyo ayokaka te,
oyo monoko ekoki kozongisa eloko te.

15 Natalelaka yo, Yawe ;
okopesa eyano, Yawe.

16 Pamba te nalobaki :
“Kotika te ete basepela to bamikumisa
tango lokolo na ngai ekeyi na moselu !”

17 Pamba te, nakomi pene na kokweya ;
mpe pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai.

18 Natubeli mabe na ngai ;
nazali kotungisama mpo na lisumu na ngai.

19 Bazali ebele baoyo bazali banguna na ngai ya bingambe ;
Baoyo bayinaka ngai kaka pamba,
bazali ebele.

20 Baoyo bazali kozongisela ngai mabe
mpo na bolamu na ngai, bazali kotonga ngai
tango nazali koluka kosala oyo ezali malamu.

21 Yawe, kotika ngai te ;
kozala mosika na ngai te, Nzambe na ngai !

22 Yaka noki kosalisa ngai.
Yawe mobikisi na ngai.
Copyright information for LinMNB