Psalms 40

Lobiko ya Nzambe mpe Mosali na ye

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Natalelaki Yawe nakokanga motema ;
abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.

2 Abimisaki ngai na libulu ya somo,
na kati ya potopoto penza ;
atiaki makolo na ngai likolo ya libanga,
mpe apesaki ngai esika ya makasi mpo na kotelema.

3 Atie nzembo ya sika na monoko na ngai,
nzembo ya masanzoli mpo Nzambe na biso.
Bato mingi bakomona mpe bakobanga,
mpe bakotia mitema na bango na Yawe.

4 Mapamboli na moto oyo akomisaka Yawe elikya na ye ;
oyo atalaka epai ya moto ya lofundu te,
baoyo balandaka banzambe ya lokuta te.

5 Yawe, Nzambe na ngai,
makambo ya kokamwa oyo yo osala ezali mingi penza.
Biloko oyo obongisa mpo na biso,
moto moko te akoki kotangela yo yango.
Soki nalingi koloba mpe kolobela yango,
eleki mingi penza mpo na kosakola.

6 Mbeka mpe makabo osepelaki na yango te,
kasi ofungolaki matoyi na ngai ;
makabo mpe mbeka ya bolimbisi ya masumu
yo osengaki te.

7 Bongo nalobaki : “nazali awa, nazali koya ;
ekomama mpo na ngai kati na mokanda.

8 Nazalaka na posa kosala mokano na yo ;
mibeko na yo ezali na kati ya motema na ngai.”

9 Nasakolaka bosembo na yo na kati ya lisanga monene ;
nakangaka bambebo na ngai te, ndenge oyebi, Yawe.

10 Nabombaki bosembo na yo te na kati ya motema na ngai ;
nalobelaki boyengebene na yo mpe lobiko na yo.
Nabombaki bolingo na yo te mpe solo na yo te
na kati ya lisanga monene.

11 Yawe, kotika te koyokelaka ngai mawa ;
tika ete bolingo na yo mpe solo na yo
ebatelaka ngai tango nyonso.

12 Pamba te, ezingi ngai, minyoko oyo bakoki kotanga te ezingi ngai ;
masumu na ngai ekangi ngai,
mpe nakokoka te kotala ;
ezali mingi penza koleka kutu suki ya motu na ngai,
mpe motema na ngai elembi kati na ngai.

13 Sepela
Yawe, yaka noki kosalisa ngai.

14 Tika ete baoyo balukaka koboma ngai,
bango nyonso bayoka soni mpe basambwa ;
tika ete baoyo basepelaka na libebi na ngai,
basambwa mpe bayoka soni.

15 Tika ete baoyo balobaka mpo na ngai.
Bayoka somo mpo na soni na bango moko

16 Kasi tika ete baoyo nyonso balukaka yo batonda na esengo
mpe basepela kati na yo ;
tika ete baoyo balingaka lobiko na yo,
balobaka tango nyonso :
“Yawe onetolama !”

17 Nzoka nde ngai nazali mobola mpe mokeleli ;
tika Yawe akanisa ngai.
Yo ozali mosungi na ngai mpe mokangoli na ngai ;
Nzambe na ngai, kowumela te.
Copyright information for LinMNB