Psalms 42

BUKU YA MIBALE

Molimo na ngai ezali na posa ya Nzambe

Nzembo ya bana ya Kore epai ya mokambi ya bayembi.


1 Ndenge mbuli eyokaka posa ya komela mayi
ndenge moko mpe molimo na ngai ezali na posa na yo,
Nzambe na ngai.

2 Molimo na ngai ezali na posa ya Nzambe,
Nzambe ya bomoi ;
tango nini nakoki kokende mpe kokutana na Nzambe ?

3 Mayi ya miso na ngai ezalaki bilei na ngai butu mpe moi,
tango bato bazalaki kolobela ngai mokolo mobimba :
“Nzambe na yo azali wapi ?”

4 Makambo oyo nakanisaka yango
lokola nazali kosopa molimo na ngai :
ndenge nazalaki kotambola elongo na bato ebele ;
komema bango na molongo kino na Ndako ya Nzambe,
elongo na makelele ya esengo mpe kozongisa matondi,
ya bato ebele oyo bazali na feti.

5 Mpo na nini olembi boye ; e e molimo na ngai ?
Mpo na nini ozali kotungisama kati na ngai ?
Tia elikya na Nzambe ;
pamba te nakosanzola ye lisusu.
Mobikisi na ngai mpe Nzambe na ngai.

6 Molimo na ngai elembi kati na ngai ;
yango wana nakokanisa yo,
wuta na mokili ya Yordani, na songe ya ngomba ya Ermoni,
wuta na ngomba ya Mizar.

7 Esika ya mozindo ezali kobenga esika mosusu
ya mozindo na makelele ya konguluma ya kobuakama ya mayi na yo ;
bambonge na yo nyonso,
ya mike mpe oyo ya minene,
ezali koleka likolo na ngai.

8 Na moi, Yawe atindelaka ngai bolingo na ye ;
na butu, nzembo na ye ezali kati na ngai,
libondeli epai ya Nzambe ya bomoi na ngai

9 Nalobaka na Nzambe, libanga na ngai :
“Mpo na nini obosani ngai ?
Mpo na nini nazali kotambola na pasi boye,
konyokwama na monguna ?”

10 Mikuwa na ngai ezali koyoka pasi ya liwa
awa bayini na ngai bafingaka ngai ;
tango balobaka na ngai mokolo mobimba :
“Nzambe na yo azali wapi ?”

11 Mpo na nini olembi boye ; e e molimo na ngai ?
Mpo na nini ozali kotungisama kati na ngai ?
Tia elikya na Nzambe ;
pamba te nakosanzola ye lisusu ;
Mobikisi na ngai mpe Nzambe na ngai.
Copyright information for LinMNB