Psalms 52

Suka ya moto ya mbongo oyo anyokolaka bato

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi. Ayembaki yango tango Doyege, moto ya mboka Edomi akendaki koyebisa Sawuli ete David akendaki na ndako ya Abimeleke.


1 Mpo na nini ozali komikumisa mpo na mabe Elombe, yo Elombe mobali ?
Mpo na nini ozali komikumisa mokolo mobimba ?
Yo oyo ozangi lokumu na miso ya Nzambe ?

2 Lolemo na yo ebongisaka makambo ya kobebisa,
ezali lokola zileti ya mino makasi ; yo moto osalelaka lokuta,
yo moto osalelaka lokuta.

3 Olingaka makambo ya mabe koleka makambo ya malamu ;
lokuta koleka maloba ya solo.

4 Olingaka maloba nyonso oyo ebebisaka ;
E e yo lolemo ya lokuta !

5 Ya solo Nzambe akokweyisa yo na libebi ya libela ;
akozwa yo mpe akopasola yo wuta na ndako na yo ya kapo,
mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.

6 Bongo bato na sembo bakomona,
mpe bakobanga ;
mpe bakoseka ye na koloba :

7 “Tala ye, oyo azalaki te komona Nzambe
lokola ndako na ye ya makasi,
kasi azalaki kotia motema na ye
na bomengo na ye ya monene,
mpe akomaki moto ya makasi
na nzela ya kobebisa bato mosusu.”

8 Kasi ngai nazali
lokola nzete ya olive,
oyo etondi na makasa ya mobesu na kati ya ndako ya Nzambe.
Natiaka motema na ngai na bolingo makasi ya Nzambe,
mpo na libela na libela.

9 Nakosanzola yo tango nyonso
mpo na oyo osalaki ;
kati na kombo na yo, nakotia elikya
pamba te kombo na yo ezali malamu.
Nakosanzola yo
na miso ya basantu na yo.
Copyright information for LinMNB