Psalms 54

Nzambe akangolaki ngai

Nzembo ya David, epai ya mokambi ya bayembi ; eyembamaki na gitare, tango bato ya Zifi bayaki koloba na Sawuli : “David abombami kati na biso.”


1 Bikisa ngai, Nzambe, na kombo na yo ;
mpe longisa ngai na nguya na yo.

2 Yoka libondeli na ngai, Nzambe,
tia litoyi na maloba ya monoko na ngai.

3 Bapaya bazali kobundisa ngai,
bato ya mobulu bazali koluka bomoi na ngai ;
batiaka makanisi na bango na Nzambe te.

4 Ya solo, Nzambe azali mosalisi na ngai ;
Yawe azali oyo asimbaka ngai.

5 Tika mabe ezongela baoyo bazali kotonga ngai,
kati na boyengebene na yo, bebisa bango.

6 Nakopesa yo makabo na motema moko ;
nakosanzola kombo na yo, Yawe,
pamba te yango ezali malamu.

7 Pamba te akangolaki ngai na bapasi na ngai nyonso ;
mpe miso na ngai emonaki esengo
likolo ya bayini na ngai.
Copyright information for LinMNB