Psalms 69

Nzambe, bikisa ngai

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; eyembamaki na Lisi.


1 Bikisa ngai, Nzambe !
pamba te, mayi ekomi kino na kingo na ngai.

2 Nadindi na poto-poto na mozindo penza,
esika ya kotia lokolo ezali te ;
nakoti na mayi ya mozindo, bambonge emeli ngai
mpe mayi edindisi ngai.

3 Nalembi mpo na kobenga lisalisi ;
mongongo na ngai ekawuki.
Miso na ngai elembi mpo na kotalela Nzambe na ngai.

4 Baoyo bayinaka ngai kaka pamba,
bazali mingi penza koleka kutu suki ya motu na ngai ;
mingi bazali banguna na ngai kaka pamba,
baoyo balukaka kobebisa ngai.
Bazali kosenga ngai na makasi
ete nazongisa eloko oyo nayibaki te.

5 Oyebi bozoba na ngai, Nzambe,
mpe mabe na ngai ezali ya kobomboma te
epai na yo.

6 Tika ete baoyo batiaka elikya epai na yo,
basila lokumu te mpo na ngai ;
Yawe, Yawe ya nguya nyonso.
Tika ete baoyo balukaka yo
basila lokumu te mpo na ngai,
Nzambe ya Isayele

7 Pamba te, nazali kosambwa mpo na yo,
mpe soni ezipi elongi na ngai.

8 Nakomi mopaya epai ya bandeko na ngai ;
mpe moleki nzela epai ya bana ya mama na ngai moko,

9 Pamba te posa ya ndako na yo yango nde ezali kozikisa ngai ;
mpe kofinga ya baoyo bazali kofinga yo
ezali kokweya likolo na ngai.

10 Tango nalelaka mpe namilalisaka nzala
mpo na mabondeli ;
esengeli nasambwa.

11 Tango nalataka saki,
bakomisaka ngai lisano.

12 Baoyo bavandi na porte bazali kosakana na ngai ;
mpe nazali nzembo
ya bato ya milangwa.

13 Kasi ngai nazali kobondela yo, Yawe,
na tango ya ngolu na yo,
na bolingo na yo ya monene, Nzambe,
zongisela ngai eyano
na lobiko na yo ya solo.

14 Bimisa ngai na kati ya poto-poto,
kotika te ete nadinda.
Kangola ngai na baoyo bayinaka ngai,
wuta na mayi ya mozindo.

15 Kotika te ete mbonge ya mayi emela ngai ;
to esika ya mozindo emema ngai,
to mpe libulu ekanga monoko na yango likolo na ngai.

16 Zongisela ngai eyano, Yawe,
na bolamu ya bolingo na yo ;
tala ngai kati na mawa na yo oyo eleki monene
na mawa na yo ya monene, baluka epai na ngai.

17 Kobombela mosali na yo elongi na yo te ;
zongisela ngai eyano noki,
pamba te nazali na minyoko ;

18 Pusana pene-pene,
mpe kangola ngai ;
kangola ngai mpo na bayini na ngai.

19 Oyebi ndenge nazali kosambwa,
ndenge nazali koyoka soni,
mpe ndenge lokumu na ngai esili ;
mpe banguna na ngai nyonso bazali liboso na yo.

20 Kosambwa epanzi motema na ngai
mpe etika ngai ata na lisungi te.
Nalukaki boyokela ngai mawa,
kasi moto amonanaki te ;
mpo na bato ya kobondisa, namonaki
moto te.

21 Batiaki pwazo na bilei na ngai
mpe bapesaki ngai vino ya ngayi na
posa oyo na zalaki na yango.

22 Tika ete mesa batiaki liboso na bango
ekoma monyama,
ekoma lifuti mpe motambo

23 Tika ete miso na bango ekoma molili
mpe bamona lisusu te ;
mpe mokongo na bango egumbama libela.

24 Sopela bango kanda na yo ;
mpe tika ete kanda na yo ya somo ekanga bango.

25 Tika ete bisika na bango ekoma esobe,
tika ete moto ata moko te avanda lisusu
na bandako na bango ya kapo.

26 Pamba te, bazali konyokola bato oyo yo ozokisaki ;
mpe bazali koloba-loba
mpo na bapasi ya bato oyo yo oyokisaki pasi.

27 Bakisela bango mabe likolo ya mabe na bango ;
kotika te bazwa ndambo na lobiko na yo.

28 Tika ete balongola bakombo na bango na Buku ya bomoi ;
mpe kotanga bango te
elongo na bato na sembo !

29 Nazali kati na pasi mpe na minyoko,
tika ete lobiko na yo, Yawe, ebatela ngai.

30 Nakosanzola kombo ya Nzambe na nzembo ;
mpe nakokumisa ye na matondi.

31 Yango ekosepelisa Yawe mingi penza
koleka ngombe ya mobali, koleka
ngombe oyo ezali na maseke
mpe oyo makolo na yango ekabwana.

32 Mobola akomona mpe akosepela ;
bino baoyo bolukaka Nzambe,
tika ete mitema na bino ezala na bomoi.

33 Yawe ayokelaka moto akelela
mpe atiolaka bato na ye te
oyo bakangama na bowumbu.

34 Tika ete likolo mpe se esanzola ye,
ba-ebale minene mpe biloko nyonso oyo etambolaka
na kati na yango.

35 Pamba te Nzambe akobikisa Siona,
mpe akotonga lisusu ba-vile ya Yudea ;
bato bakovanda kuna mpe bakozwa yango.

36 Bana ya basali na ye bakozwa yango lokola libula
mpe baoyo balingaka kombo na ye bakovanda kuna.
Copyright information for LinMNB