Psalms 73

BUKU YA MISATO

Mpo na nini bato na mabe bazali kolonga ?

Nzembo ya Asafi


1 Ya solo, Nzambe azali malamu mpo na Isayele,
mpo na baoyo bazali mitema peto.

2 Kasi mpo na ngai, etikalaki moke
mpo ete makolo na ngai ekende na moselu ;
etikalaki moke nabungisa esika na kotelemisa likolo ngwi.

3 Pamba te nalulaki bato ya lofundu
tango nazalaki komona bolamu ya bato ya mabe.

4 Bamonaka pasi te
nzoto na bango ezali malamu mpe makasi.

5 Bamonaka pasi te ndenge bato mosusu bamonaka ;
banyokwamaka te maladi oyo ezwaka bato.

6 Yango wana lolendo ezali
mayaka na bango na kingo ;
bamilatisi na mobulu.

7 Wuta na mitema na bango ya mabanga
mabe ezali kobima ;
mabongisi ya mabe ya makanisi na bango ezali na ndelo te.

8 Batiolaka mpe balobaka na ndenge ya mabe penza ;
kati na lofundo na bango,
bazali kobongisa minyoko.

9 Minoko na bango elobaka mpo na kosenga likolo ;
mpe lolemo na bango ezali kozwa mokili.

10 Yango wana, bato na bango babaluki epai na bango,
mpe bazali komela mayi ebele penza.

11 Balobaka
“Nzambe akoyeba ndenge nini ?
Ye Oyo Aleki na Likolo azali na boyebi ?”

12 Tala ndenge bato na mabe bazalaka ;
tango nyonso bazangi kotungisama
mpe bazali kobakisa bomengo.

13 Ya solo, kaka pamba nabatelaki motema na ngai peto
kaka pamba, nasukolaki maboko na ngai
mpo na kolakisa ete nayebi likambo te.

14 Mokolo mobimba, bazalaki kobeta ngai
bazalaki kopesa ngai etumbu tongo nyonso.

15 Soki nalobaki : Nakoloba lokola bango
mbele nalingaki koteka bana na yo.

16 Tango nalingaki kososola oyo nyonso,
ekomaki minyoko mpo na ngai.

17 Kino nakotaki na Esika ya bosantu ya Nzambe,
bongo nde nayaki kososola
ndenge nini bango bakosuka.

18 Ya solo, otiaka bango na mabele ya moselu ;
okweyisaka bango na libebi.

19 Tala ndenge babebi na mbalakata ;
balimwe mobimba mpo na somo.

20 Lokola ndoto tango moto alamukaka
ndenge wana ekolamuka, Yawe
okomona bango pamba lokola eloko pamba.

21 Tango motema na ngai ezalaki koyoka mawa,
mpe molimo ezalaki komitungisa,

22 nakomaki zoba mpe mayele esilaki ngai ;
nazalaki lokola nyama ya zamba liboso na yo.

23 Nzokande nazali tango nyonso elongo na yo,
osimbaki ngai na loboko na ngai ya mobali.

24 Okotambwisa ngai na toli na yo,
mpe sima na yango akozwa ngai na nkembo.

25 Nani mosusu nazali na ye kuna na Likolo,
soki yo te ?
mokili ezali na eloko mosusu te, oyo na lingaka soki yo te.

26 Mosuni na ngai mpe motema na ngai ekoki kolemba ;
kasi Nzambe azali makasi
ya motema na ngai mpe eteni na ngai
mpo na libela.

27 Pamba te, baoyo bazali mosika na yo bapanzanaki ;
mpe obebisaki baoyo nyonso batosaka yo te.

28 Kasi mpo na ngai, ezali malamu
kozala pene-pene na Nzambe ;
nakomisaki Yawe, oyo asalaka oyo ye alingi, ebombamelo na ngai ;
nakolobela misala na yo nyonso.
Copyright information for LinMNB