Psalms 75

Nzambe akosambisa mokili

Nzembo ya Asaf epai ya mokambi ya bayembi ; eyembamaki na lolenge ya “Koboma te !”


1 Tozali kopesa yo, matondi, Nzambe,
tozali kopesa matondi
pamba te kombo na yo ezali pene-pene ;
bato bazali kolobela misala na yo ya kokamwa.

2 Yo Olobi, “naponi tango oyo ebongisami ;
ezali ngai moto nazali kosambisa na alima.

3 Tango mokili eninganaka elongo na bato na ye nyonso
ezali ngai moto nasimbaka makasi makonzi na yango

4 Epai ya moto ya lofundu, na lobi
‘bomikumisaka mingi te’
Mpe na bato na mabe : ‘Botika kotombola maseke na bino’

5 Botika kotombola maseke na bino liboso na likolo ;
mpe botika koloba na lofundu nyonso.”

6 Moko te, wuta na Este to na Weste,
to na esobe, akoki konetola moto.

7 Pamba te Nzambe nde asambisaka ;
akitisaka moto mosusu,
mpe anetolaka moto mosusu.

8 Na loboko ya Yawe ezali na kopo moko ;
etondi na vino ya makasi mpe oyo basangisa na biloko mosusu
asopi yango,
mpe bato nyonso ya mabe ya mokili
bameli yango, kino na mbindo oyo etikalaka na se na yango.

9 Kasi ngai, nakosakola yango tango nyonso ;
nakoyemba masanzoli mpo na Nzambe ya Zakobi.

10 Nakokata maseke ya bato ya mabe nyonso ;
kasi maseke ya bato ya sembo ekotombwana.
Copyright information for LinMNB