Psalms 81

Soki bato na ngai bayokelaki ngai…

Nzembo ya Asaf epai ya mokambi ya bayembi ; ayembaki yango na lindanda ya bato ya Gate.


1 Boyemba na esengo epai na Nzambe
makasi na biso ;
bonganga epai ya Nzambe ya Zakobi.

2 Bobanda miziki, bobeta bambonda ya mike, bobeta miziki ya
lindanda mpe gitare.

3 Bobeta liseke ya meme tango sanza ekobima sika,
mpe tango ekobima mobimba
na mokolo ya feti na biso !

4 oyo ezali ekateli mpo na Isayele ;
mpe etinda ya Nzambe ya Zakobi.

5 Atiaki yango lokola likebisi mpo na Zozefi
tango abundisaki Ezipito,
epai toyokaki monoko oyo tososolaki te.

6 Alobi : “Nalongolaki mokumba oyo ezalaki
na mapeka na ye ;
maboko na bango elongwaki na bowumbu ya kitunga.”

7 Na kati na pasi na yo obengaki mpe nakangolaki yo ;
napesaki yo eyano na kati ya mapata na kake ;
namekaki yo na mayi ya Meriba.

8 Botia litoyi bato na ngai, mpe nakokebisa bino ;
Ee Isayele, soki bolingaki kotia matoyi epai na ngai !

9 okoki kozala na nzambe ya mopaya te kati na yo.
Okoki kokumbamela nzambe ya bapaya te.

10 Ngai nazali Yawe Nzambe na yo,
oyo abimisaki yo na Ezipito ;
fungola malamu monoko na yo mpe nakotondisa yango.

11 Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te,
mpe Isayele atosaki ngai te.

12 Bongo natikaki bango
na mitema na bango makasi ;
balandaki mokano na bango moko.

13 Soki bato na ngai bayokelaki ngai !
Soki Isayele alandaki banzela na ngai ;

14 mbele na mbangu nalingaki kotia na se na bango banguna na bango ;
mpe nalingaki kobalusa loboko na ngai liboso ya bayini na bango.

15 Baoyo bayinaka Yawe balingaki komikitisa liboso na ye,
mpe etumbu na bango elingaki kowumela libela na libela.

16 Kasi yo olingaki kolia ble ya kitoko ;
na mafuta ya nzoyi oyo ebimaka na libanga nalingaki kotondisa yo.
Copyright information for LinMNB