Psalms 83

Kotika te ete banguna na yo balonga

Nzembo ya Asaf


1 Ee Nzambe, kovanda nye te ;
kokanga monoko te, Nzambe kotikala kimia te.

2 Tala ndenge banguna na yo bazali kotomboka ;
ndenge bayini na yo bazali kotombola mitu na bango.

3 Na mayele mabe bazali kosala likita mpo na bato na yo.
Bazali kokanela bato oyo yo olengelaka.

4 Bazali koloba : “Boya, mpe tosilisa bango lokola ekolo !
Mpo ete kombo ya Isayele bakanisa ngai yango lisusu te”.

5 Na likanisi moko, bakaneli na lisanga ;
basali boyokani mpo na kobundisa yo :

6 Bandako ya kapo ya Edom mpe bato ya Ismayele,
ya Mowabi mpe ya Agar,

7 Gebal, Amoni mpe Amaleki,
Filistiya, elongo na bato ya Tir.

8 Ata bato ya Asiria,
bango mpe basangani na bango ;
mpo na kobakisa libota ya Loti makasi.

9 Sala bango ndenge osalaki Madian ;
ndenge osalaki Sisera,
mpe Zabini, na mayi ya Kisona,

10 baoyo bapanzanaki na Endori,
mpe bakomaki lokola matiti ya kopola
na mabele.

11 Sala bato na bango ya lokumu lokola Orebi mpe Zebi ;
bango nyonso bana ya bakonzi
lokola Zeba mpe Salmuna.
12Baoyo balobaki : “Tobotola mabele ya Nzambe bisika baliesaka bibuele !”

13 komisa bango lokola mopepe ya kayina, Nzambe na ngai,
lokola matiti liboso ya mopepe.

14 Lokola moto oyo ezikisaka zamba ;
to lokola moto ya makasi oyo ezikisaka bangomba.

15 Bongo landa bango na mopepe na yo ya makasi,
mpe bangisa bango na mopepe na yo ya makasi :

16 Zipa bilongi na bango na soni
mpo ete bakoluka kombo na yo, Yawe.

17 Tika ete bayoka soni mpe somo ya libela ;
tika ete bapanzana na lokumu te.

18 Tika bayeba ete yo moko kaka,
kombo ezali Yawe ;
ete yo kaka ozali Ye Oyo Aleki Likolo,
likolo ya mokili mobimba.
Copyright information for LinMNB