Psalms 88

Libondeli ya moto oyo akomi pene ya liwa

Nzembo ya bana ya Korea epai ya mokambi ya bayembi ; eyembamaki na flite. Nzembo ya Hemani moto ya Ezirakite.


1 Ee Yawe, Nzambe oyo abikisaka ngai,
butu mpe moi nazali koganga liboso na yo.

2 Tika ete libondeli na ngai ekoma liboso na yo ;
balola litoyi na yo na koganga na ngai.

3 Pamba te molimo na ngai etondi na minyoko ;
mpe bomoi na ngai ekomi pene-pene ya mboka ya bakufi.

4 Natangami kati na baoyo bazali kokita na libulu ;
nakomi lokola moto oyo azanga makasi.

5 Nazali na ngambo ya liwa, esika moko na bato bakufa,
lokola bato oyo basiʼbabomi
mpe bazali kolala na mboka ya bakufi,
baoyo okokanisa lisusu te,
baoyo bakabwani na lisalisi na yo.

6 Otie ngai na libulu ya mozindo,
kati na mozindo ya molili

7 Kanda na yo ekweyi na kilo likolo na ngai ;
yo ozindisi ngai na bambonge na yo nyonso.

8 Okabolaki ngai na baninga na ngai ya motema ;
mpe okomisi ngai eloko ya nkele epai na bango ;
nazali ya kokangama mpe nakoki kokoka kokima te.

9 Miso na ngai ezali kobeba mpo na pasi ;
Nazali kobenga yo, Yawe, mokolo na mokolo ;
natomboli maboko na ngai epai na yo.

10 Boni, olakisaka bato bakufa makambo na yo ya kokamwa ?
Boni, bakufi bakoki kotelema
mpo na kokumisa yo ?

11 Bolingo na yo ekosakolama
na mboka ya bakufi ?
Boyengebene na yo na libebi ?

12 Makamwisi na yo ekoki koyebana
na esika ya molili,
to misala na yo ya bosembo na mabele ya bato
oyo babosana nyonso.

13 Kasi ngai, nazali konganga epai na yo mpo na lisalisi, Yawe… ;
na tongo libondeli na ngai ekomaka liboso na yo.

14 Mpo na nini, Yawe, obwaki ngai ?
Mpe obombeli ngai elongi na yo ?

15 Wuta bolenge na ngai,
nazali na pasi mpe liwa ekanga ngai ;
nazali komona pasi mpo na somo na yo,
mpe elikya esili ngai.

16 Kanda na yo ya makasi ezali koleka likolo na ngai,
somo na yo ebebisi ngai.

17 Mokolo mobimba yango ezingi ngai lokola mayi ;
ezindisi ngai mobimba.

18 Okabolaki ngai na baoyo batambolaka
na ngai mpe balingami na ngai ;
molili nde ezali moninga na ngai ya motema.
Copyright information for LinMNB