Psalms 91

Ebombelo ya malamu penza


1 Moto oyo avandaka na esika ya kobombama ya Ye oyo Aleki Likolo
akopema na se ya elilingi ya Nzambe ya nguya nyonso.

2 Nakoloba boye mpo na Yawe :
“Ye azali ebombamelo na ngai
mpe ndako na ngai ya makasi ;
Nzambe na ngai,
Kati na ye natiaka motema”

3 ya solo, akobikisa yo na motambo
ya moto oyo akangaka bandeke,
mpe na maladi oyo ebomaka.

4 Akozipa yo na bansala na ye,
mpe na se ya mapapu na ye okozwa esika ya kobombama ;
boyengebene na ye ekozala ebende na yo ya makasi oyo ebatelaka
mpe lopango na yo ya malasi.

5 Okobanga te somo ya butu,
to mpe likonga oyo epumbwaka na moi,

6 to mpe maladi ya mabe oyo etambolaka na molili,
to mpe pasi oyo ebebisaka na midi.

7 Nkoto moko ekoki kokweya pembeni na yo,
mpe nkoto zomi na loboko na yo ya mobali,
Kasi ekoya pembeni na yo te.

8 Okotala kaka na miso na yo
mpe okomona etumbu ya bato ya mabe.

9 Soki okomisi oyo Aleki likolo evandelo na yo,
ndenge moko Yawe, oyo azali ebombamelo na ngai.

10 Bongo mabe ata moko te ekokweyela yo ;
to mpe pasi ata moko te ekoya
pembeni ya Ndako na yo ya kapo.

11 Pamba te akopesa mitindo na baanzelu na ye mpo na yo,
mpo babatela yo na banzela na yo nyonso.

12 Bakotombola yo na maboko na bango,
mpo ete obeta te likolo na yo na libanga.

13 Okotambola likolo ya ntambwe
mpe likolo ya kobra ;
okonyata ntambwe oyo akomeli
mpe nyoka.

14 “Mpo alingi ngai” elobi Yawe
nakokangola ye ;
nakobatela ye, pamba te ayebi kombo na ngai.

15 Akobenga ngai mpe nakozongisela ye eyano ;
nakozala elongo na ye na tango ya minyoko,
nakokangola ye mpe nakokumisa ye.

16 Nakotondisa ye bomoi ya molayi ;
mpe nakolakisa ye lobiko na ngai.
Copyright information for LinMNB