Psalms 93

Yawe azali Mokonzi libela na libela


1 Yawe azali na bokonzi, alati lokumu ;
Yawe alati lokumu, mpe alati makasi.
Mokili etelemi ngwi, mpe ekoki koningana te.

2 Kiti na yo ya bokonzi etiama wuta kala ;
ozali na tango nyonso.

3 Ba-ebale minene etomboli, Yawe,
ba-ebale minene etomboli mingongo na yango ;
ba-ebale minene etomboli bambonge na yango
oyo ezali kotiola.

4 Nguya koleka lokito ya mayi ya minene.
Nguya koleka baoyo basalaka ba ebale ya minene,
Yawe na likolo azali na nguya.

5 Bikateli na yo etelema ngwi ;
bosantu ezali kobongisa Ndako na yo mpo na mikolo
oyo ezanga suka, Yawe.
Copyright information for LinMNB