Psalms 95

Yawe asimbi mokili na maboko na ye


1 Boya, tika toyemba na esengo epai na Yawe ;
tika toganga
epai ya libanga ya lobiko na biso !

2 Tika toya liboso na ye na matondi ;
tonetola ye na miziki mpe nzembo.

3 Pamba te Yawe azali nzambe monene,
mokonzi monene likolo ya banzambe nyonso.

4 Na loboko na ye bisika ya mozindo ya mokili ezali ;
mpe basonge ya bangomba ezali ya ye.

5 Ebale monene ezali ya ye,
mpo asala yango ;
mpe maboko na ye esala mabele ya kokawuka.

6 Boya, tika togumbama na kokumbamela,
tika tofukama liboso ya Yawe mokeli na biso.

7 Pamba te azali Nzambe na biso,
mpe tozali bato ya esika na ye ya matiti
bameme na se ya kobatela na ye.
Lelo, soki boyoki mongongo na ye,

8 boyeisa mitema na bino makasi te
lokola bosalaki na Meriba,
lokola bosalaki mokolo wana na Masa na esobe ;

9 epai batata na bino bamekaki ngai
mpe batalaki motema na ngai,
atako bamonaki oyo nasalaki.

10 Na bambula ntuku minei,
kanda na bato ya tango wana
nalobaki : “Bazali bato oyo mitema
na bango ebunga nzela ;
mpe bayebaki banzela na ngai te.”

11 Yango wana nalapaki ndayi na kati ya kanda na ngai ete :
“Bakokota te na kopema na ngai !”
Copyright information for LinMNB