Revelation of John 13

Nyama oyo ebimaki na ebale monene

1Sima namonaki nyama moko ebimaki na ebale monene, ezalaki na maseke zomi mpe mitu sambo. Elataki bikoti zomi ya bokonzi na maseke na yango ; mpe na mitu na yango bakomaki bakombo ya kotiola Nzambe. 2Nyana oyo namonaki ekokanaki na nkoyi. Makolo na yango ezalaki lokola ya nyama oyo babengaka Uruse, mpe monoko na yango ezalaki lokolamonoko ya tambwe. Bongo Dragon epesaki nyama yango nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi, mpe bokonzi monene penza. 3Namonaki motu moko ya nyama wana ezalaki lokola babetaki yango peneya liwa ; mpe pota oyo elingaki koboma yango esilaki. Bongo mokili mobimba ezalaki kokamwa nyama yango mpe elandaki yango. 4Bato babandaki kosambela Dragon mpo epesaki bokonzi na yango na nyama wana. Basambelaki nyama yango mpe balobaki : “Nani akokani na nyama, mpe nani akoki kobunda na yango ?” 5Mpe nyama ezwaki nzela ya koloba maloba ya lofundu mpe ya kofinga Nzambe. Ezwaki mpe bokonzi ya kosala mosala na yango basanzantuku minei na mibale.

6Bongo ebandaki koloba maloba ya kotiola Nzambe, kotiola kombo na ye, esika ye avandaka, mpe baoyo bavandaka na Likolo. 7Ezwaki nzela ya kobunda na basantu mpe ya kolonga bango. Mpe bapesaki yango bokonzi likolo ya mabota nyonso, yamikili nyonso, ya minoko nyonso mpe ya bikolo nyonso. 8Bongo bato nyonso oyo bavandaka na mokili, baoyo bakombo na bango ekomama te, banda mokili esalama, na Buku ya bomoi ya Mwanameme oyo babomaki, bakosambela ye.

9Moto oyo azali na matoyi tika ayoka !

10Soki moto asengeli kokota na boloko, akokota na boloko. Soki moto asengeli kokufa na mopanga, akokufa na mopanga. Yango wana, esengeli ete bato ya Nzambe bazala bato ya kokanga motema mpe kondima.

Nyama oyo ebimaki na mabele

11Bongo namonaki nyama mosusu ebimaki na mabele. Nyama yango ezalaki na maseke mibale oyo ezalaki lokola ya mwana-meme, mpe ezalaki koloba lokola Dragon. 12Esalelaki bokonzi nyonso ya nyama ya liboso na miso na ye. Esalaki ete mabele mpe bato oyo bavandaka na mabele bakumbamela nyama ya liboso oyo ezalaki na pota oyo elingaki koboma ye mpe pota yango esilaki. 13Esalaki makamwisi minene, na ndenge ete ekitisaki kutu motowuta na likolo kino na mokili, na miso ya bato. 14Bongo ekosaki baoyo bavandaka na mabele na nzela ya makamwisi oyo bapesaki ye ndingisa ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Nyama ya mibale etindaki baoyo bavandaka na mokili ete basala elilingi mpo na lokumu ya nyama oyo bazokisaki na mopanga mpe ezongaki na bomoi. 15Mpe nyama ya mibale ezwaki nzela ya kopesa pema na elilingi ya nyama ya liboso mpo ete ekoka koloba, mpe eboma baoyo nyonso baboyaki kosambela yango.

16Etindaki lisusu bato nyonso na makasi, bato minene mpe bato pamba, bato ya bomengo mpe babola, bawumbu mpe bato ya bonsomi, ete bazwa elembo na loboko ya mobali to na elongi, 17mpo ete moto moko te akoka kosomba to koteka, longola kaka oyo azali na elembo ; elembo yango ezali nde kombo ya nyama to talo ya kombona yango.

18Likambo oyo ezali kosenga bwania. Tika ete moto oyo azali na mayele atanga talo ya nyama. Pamba te talo yango ekokani na kombo ya moko. Talo yango ezali : nkama motoba na ntuku motoba na motoba.
Copyright information for LinMNB