Revelation of John 15

Elembo ya bapasi sambo ya suka

1Bongo namonaki na Likolo, elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa : baanzelu sambo bazalaki na bapasi sambo, yango ezali bapasi ya suka ; pamba te na yango nde Kanda ya Nzambe ekokokisama. 2Namonaki mpe ebale monene esangana na moto, ezalaki lokola talatala. Namonaki lisusu baoyo balongaki nyama, mpe elilingi na yango, mpe na talo ya kombo na yango, batelemaki likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala, mpe bazalaki na mandanda ya Nzambe. 3Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mosali ya Nzambe, mpe nzemboya Mwana-Meme : Nkolo Nzambe ya nguya nyonso,
misala na yo ezali minene mpe ya kokamwa !
Nkolo ya biloko nyonso ;
banzela na yo ezali sembo mpe solo.

4 Nkolo, nani akobanga yo te
mpe akoboya kokumisa kombo na yo ?
Pamba te yo kaka nde ozali Mosantu.
Bato ya bikolo nyonso bakoya,
mpe bakosambela yo ;
pamba te misala na yo ya bosembo
emonani polele !

BAKOPO SAMBO YA KANDA YA NZAMBE

5Sima ya makambo wana, natalaki mpe namonaki Ndakoya Nzambe na Likolo efungwamaki, yango nde Ndako ya kapo ya litatoli.

6Bongo baanzelu sambo oyo bamema bapasi sambo babimaki na Ndako ya Nzambe. Balataki elamba oyo babengaka lino ; ezalaki ya peto mpe ezalaki kongenga makasi penza, mpe bakangaki mikaba ya wolo na tolo na bango.

7Moko na kati ya bikelamo minei ya bomoi epesaki na baanzelu sambu bakopo sambo ya wolo, oyo ezalaki ya kotonda na kanda ya Nzambe, ye oyo azali na bomoi libela na libela. 8Bongo Ndako ya Nzambe etondaki na milinga oyo ewutaki na nkembo ya Nzambe mpe na nguya na ye. Mpe moto moko te akokaki kokotana Ndako ya Nzambe, kino tango bapasi sambo ya baanselu sambo ekokisamaki.
Copyright information for LinMNB