Revelation of John 21

Emoniseli ya sambo : likolo ya sika mpe mokili ya sika

1Bongo namonaki likolo ya sika mpe mabele ya sika ; pamba te likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te.

2Mpe namonaki vile ya bosantu, Yeruzalem ya sika, ewutaki na likolo epai ya Nzambe mpe eyaki kokita. Babongisaki yango lokola mwasi ya libala oyo bakomisi kitoko penza mpo na mobali na ye. 3Nayokaki mongongo moko ya monene ebimaki wuta na Kiti ya bokonzi, mpe elobaki :

Botala, Ndako ya Nzambe ezali elongo na bato ! Nzambe akovanda na bango elongo, bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye moko akozala na bango elongo mpe akozala Nzambe na bango.

4

Akopangusa mayi ya miso nyonso ya miso na bango ; liwa ekozala lisusute, matanga ekozala te, ata kolela, ata pasi. Pamba te makambo ya liboso esiʼeleki.

5Bongo Moto oyo afandaki na Kiti ya bokonzi alobaki :

—Tala, nasali biloko nyonso ya sika.

Sima alobaki :

—Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali maloba ya solo mpe oyotosengeli kotiela motema.

6Alobaki na ngai lisusu :

—Ekokisami ! Ngai nazali Alfa mpe Omega, ebandeli mpe suka. Moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa ye oyo ya ebandeli ya mayiya bomoi, mpe nakopesa ye yango ofele.

7Moto oyo akolonga akozwa bomengo nyonso wana, mpe, nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na ngai. 8Kasi mpo na bato oyo babangaka-bangaka na kondima na bango bato bazangi kondima, baoyo basalaka makambo ya soni ndenge na ndenge, baoyo babomaka bato, baoyo basalaka kindumba, baoyo basalaka kindoki, baoyo basambelaka bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama na laki ya moto mpe ya sufulu ; yango nde liwa ya mibale.

YERUZALEM YA SIKA, MWASI YA MWANA-MEME

9Bongo anzelu moko na kati ya baanzelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo oyo ezalaki ya kotonda na bapasi sambo ya suka, ayaki mpe alobaki na ngai :

—Yaka, nakolakisa yo mwasi oyo azali kobala, mwasi ya Mwana-meme.

10Amemaki ngai na molimo likolo ya ngomba moko ya monene mpe ya molayi penza. Alakisaki ngai Yeruzalem, vile ya bosantu, oyo ezalaki kokita wuta na Likolo epai ya Nzambe. 11Ezalaki ya kotonda na nkembo ya Nzambe, mpe ezalaki kongenga lokola libanga ya talo, lokola “Yaspe”, polele lokola tala-tala. 12Vile yango ezalaki na lopango moko ya molayi mpe ya monene. Ezalaki na baporte zomi na mibale, mpe baanzelu zomi na mibalebazalaki na baporte yango. Bakombo ya mabota zomi na mibale ya bato ya Isayele ezalaki ya kokomama likolo ya baporte yango. 13Na Este baporte misato, na Norde baporte misato, na Sudebaporte misato mpe na Weste baporte misato. 14Lopango ya vile yango ezalaki na bafondasio zomi na mibale ; mpe bakombo ya Bapostolo zomi na mibale ya Mwana-meme ezalaki ya kokoma na likolo na yango.

15Mpe anzelu oyo azalaki kolobela ngai, asimbaki mwa nzete ya wolompo na kotanga molayi ya vile wana, baporte na yango, mpe lopango na yango. 16Bipayi nyonso minei ya vile yango ezalaki molayi moko ; molayi na yangompe mokuse na yango ezalaki ndenge moko. Bongo anzelu akamataki molayi ya vile na mwa nzete wana. Yango nyonso ezalaki na bakilometele pene-penenkoto mibale na nkama mibale. Molayi na yango, mokuse na yango, mpemolayi na yango ya kobanda na mabele kino na likolo ezalaki ndenge moko.

17Bongo atangaki molayi ya lopango ; molayi na yango ezalaki na bametele pene-pene ntuku motoba na motoba. Komeka molayi oyo anzelu asalelaki, ezali oyo bato basalelaka.

18Lopango yango ezalaki ya kotongama na “Yaspe” mpe vile yango esalamaki na wolo ya peto penza, oyo ekokani na talatala ya peto. 19Bafondasio ya lopango ya vile yango babongisaki yango na mabanga ya talo ya ndenge na ndenge : fondasio ya liboso ezalaki ya “Yaspe”, ya mibale ya “Safire”, ya misato ya “Kalisedwane”, ya minei ya “Emerode”, 20ya mitano ya “Onikisi”, ya motoba ya “Sardwane”, ya sambo ya “Krizolite”, ya mwambe ya “Beril”, ya libwa ya “Topaze”, ya zomi ya “Krizopase”, ya zomi na moko ya “Yansonte”, mpe ya zomi na mibale ya “Ametiste”. 21Baporte wana zomi na mibale ezalaki bapalata zomi na mibale. Porte moko na moko ezalaki ya kosalama na palata moko. Bala-bala ya vile yango ezalaki ya wolo ya peto penza lokola tala-tala ya polele penza.

22Namonaki Ndako ya Nzambe na vile wana te. Pamba te Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, mpe Mwana-meme, bazali Ndako ya Nzambe na yango. 23Vile yango ezali na posa ya moi to sanza te mpo na kongengisa yango ; pamba te nkembo ya Nzambe engengisaka yango mpe Mwana-meme azali Mwinda na yango. 24Bikolo ekotambola na moi na ye. Mpe mikonzi minene ya mokili bakomema nkembo na bango na vile yango. 25Baporte ya vile yango ekobanda kokangama te mokolo mobimba, pamba te butu ekozala kuna te. 26Bakomemela vile yango nkembo mpe lokumu ya bikolo. Kasi ata eloko moko te ya bosoto ekokota na vile wana, ata mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya soni mpe alobakalokuta ; kasi baoyo bakokota kuna, kaka baoyo bakombo na bango ekomama na Buku ya bomoi ya Mwana-meme. 27

Ebale ya mayi ya bomoi.

Copyright information for LinMNB