Revelation of John 6

Afungoli lizita ya liboso : Molongi

1Bongo namonaki Mwana-meme afungolaki lizita ya libosoya mazita sambo ; mpe nayokaki moko na kati ya bikelamo ya bomoi, elobaki na mongongo makasi lokola kake :

—Yaka !

2Tango nazalaki kotala, namonaki mpunda moko ya pembe. Moto oyo afandelaki yango asimbaki fleshe
fleshe  : ezali litimbo ; arc na monoko ya lopoto.
, mpe bapesaki ye ekoti ya lokumu. Bongo abimaki lokola molongi ya etumba mpe mpo na kokendekolonga lisusu.

Afungoli lizita ya mibale : etumba

3Tango afungolaki lizita ya mibale, nayokaki ekelamo ya mibale elobaki :

—Yaka !

4Bongo mpunda mosusu ebimaki, ezalaki ya motane penza. Moto oyo afandelaki yango bapesaki ye mopanga moko ya monene, mpe nguya ya kolongola kimia na mokili, mpo ete bato babomana bango na bango.

Afungoli lizita ya misato : nzala makasi

5Tango afungolaki lizita ya misato, nayokaki ekelamo ya misato elobaki :

—Yaka !

Tango natalaki, namonaki mpunda ya mwindu. Moto oyo afandelaki yango asimbaki eloko oyo bamekelaka kilo.
6Bongo nayokaki mongongo moko na kati ya bikelamo minei ya bomoi, elobaki :

—Kilo moko ya farine mpo na deni moko, mpe kilo misato ya orjempo na deni moko. Kasi kobebisa mafuta te mpe vino te.

Afungoli lizita ya minei : liwa

7Tango afungolaki lizita ya minei, nayokaki mongongo ya ekelamo ya minei, elobaki :

—Yaka !

8Natalaki mpe namonaki mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu. Moto oyo afandelaki yango, kombo na ye : “Liwa”. Mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda ye na sima. Bapesaki ye nguya ya koboma bato na eteni moko na kati ya biteni minei ya mokili, na mopanga, na nzala, na maladi, mpe na banyama ya zamba oyo ya kanda penza.

Afungoli lizita ya mitano : emoniseli ya bato oyo babomaki

9Tango afungolaki lizita ya mitano, namonaki na nse ya mesa oyo batumbelaka Nzambe makabo, milimo ya baoyo bakufa mpo na Liloba ya Nzambe mpe mpo na litatoli oyo batatolaki. 10Bazalaki koganga na mongongo makasi :

—Nkolo Mosantu mpe Solo, kino tango nini okozela mpo na kosambisa bato ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ?

11Bongo bapesaki moko moko na kati na bango nzambala ya pembe, mpe bayebisaki bango bapema moke, kino tango talo ya baninga na bango ya mosala mpe bandeko na bango ekokoka, baoyo bakoboma bango mpe lokola bango.

Afungoli lizita ya motoba : mokolo ya kanda ya Nzambe

12Tango afungolaki lizita ya motoba, namonaki mabele eninganaki makasi penza, moi eyindaki lokola elamba ya mwindu, mpe sanza ekomaki motane lokola makila. 13Minzoto ekweyaki na nse lokola mbuma ya nzete ya figioyo naino ekomeli te, oyo eningisami na mopepe ya makasi. 14Likolo elimwaki lokola buku elingami. Bangomba nyonso mpe bisanga nyonso balongolaki yango na bisika na yango. 15Bakonzi ya mokili, bato minene, bakonzi ya basoda, bato ya nguya, batu ya mbongo, bawumbu nyonso, mpe bato nyonso ya bonsomi, bakendaki kobombama na mabulu mpe na kati ya mabanga ya bangomba. 16Babandaki koloba na bangomba mpe na mabanga :

—Bokweyela biso, mpe bobomba biso liboso ya elongi ya Moto oyo avandi na Kiti ya bokonzi, mpe liboso ya kanda ya Mwana-Meme.
17Pamba te mokolo monene ya kanda na ye ekomi. Bongo nani akokikobika ?
Copyright information for LinMNB