Revelation of John 8

Afungoli lizita ya sambo : kimia monene

1Tango afungolaki lizita ya sambo, kimia ekomaki na likolo pene-pene ya ndambo na ngonga moko.

2Bongo namonaki baanzelu sambo oyo batelemaka liboso ya Nzambe, mpe bapesaki bango bakelelo sambo.

3Anzelu mosusu ayaki mpe atelemaki liboso ya mesa oyo batumbelakamakabo. Asimbaki sani moko ya wolo oyo batumbelaka matiti ya solo kitoko. Bapesaki ye malasi mingi mpo apesa yango elongo na mabondeli ya basantu nyonso, likolo ya mesa ya wolo oyo batumbelaka makabo, oyo ezalaki liboso ya Kiti ya bokonzi. 4Molinga ya malasi elongo na mabondeli ya basantu ewutaki na loboko ya anzelu mpe emataki liboso ya Nzambe.

5Bongo, anzelu azwaki sani wana ya wolo, atondisaki yango na moto oyo ezalaki na mesa batumbelaka makabo, mpe abwakaki yango na mokili. Bakake eningisaki lokito, mingongo eyokanaki, kongenga ya somoemonanaki, mpe mokili eninganaki.

6Baanzelu sambo oyo bazalaki na bakelelo sambo, bamibongisaki mpo na kobeta yango.

BAKELELO SAMBO

Bakelelo minei ya liboso

7Anzelu ya liboso abetaki kelelo : mbula ya mabanga mpe moto oyo esangana na makila ebwakamaki na mokili. Bongo eteni moko ya misato ya mokili ezikaki, mpe eteni moko ya misato ya banzete, mpe matiti nyonsoya mobesu ezikaki.

8Anzelu ya mibale abetaki kelelo : eloko moko lokola ngomba moneneoyo ezalaki kopela moto ebwakamaki na ebale monene. Eteni moko ya misato ya mayi ekomaki makila. 9Mpe eteni moko ya misato ya bikelamo ya bomoi oyo ezali na ebaleekufaki. Mpe eteni moko ya misato ya bamasuwa epanzanaki.

10Anzelu ya misato abetaki kelelo : monzoto moko ya monene oyo ezalaki kopela lokola mwinda ya monene, ewutaki na likolo mpe eyaki kokweya. Ekweyaki likolo ya eteni moko ya misato ya ba-ebale mpe ya bisika mayi ebimelaka. 11Kombo ya monzoto yango : “Bololo”. Mpe eteni moko ya misatoya mayi ekomaki bololo, mpe bato mingi bakufaki mpo bamelaki mayi, oyo ekomaki bololo.

12Anzelu ya minei abetaki kelelo : eteni moko ya misato ya moi, eteni moko ya misato ya sanza, mpe eteni moko ya misato ya minzoto ebebaki, mpo ete eteni moko ya misato na yango ekoma molili. Eteni moko ya misato ya mokolo ezangaki moi, mpe ndenge moko mpe mpo na butu.

Liyebisi ya bapasi misato

13Bongo namonaki ndeke moko ya monene penza ezalaki kopumbwa na likolo penza. Ezalaki koloba na mongongo makasi :

—Mawa ! Mawa ! Mawa na bato bavandaka na mokili, mpo na lokito ya bakelelo oyo ekobetama na baanzelu mosusu misato !
Copyright information for LinMNB