Romans 4

Abrayami moto ya kondima

1Boye, toloba nini mpo na koko na biso Abrayami ? Azwaki nini na bomoto ? 2Soki Abrayami akomaki sembo na nzela ya misala, akokaki solo komikumisa, kasi liboso ya Nzambe te. 3Bongo, Makomi elobi nini ? “Abrayami andimelaki Nzambe, mpe kondima yango ekomisaki ye moto ya sembo.”

4Soki moto asali mosala, batangaka lifuti na ye lokola likabo te, kasi, lokola mbuma ya motoki na ye. 5Nzoka nde, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo akomisaka bato ya masumu sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo. 6Davidi mpe alobaki kaka bongo tango atatolaki esengo ya moto oyo Nzambe akomisi sembo, na nzela ya misala te :
7 “Esengo na bato oyo
mabe na bango esili kolimbisama,
mpe masumu esili kolongwa.

8 Esengo na moto oyo
Nkolo atangeli ye masumu na ye te.”

9Boni, esengo yango ezali kaka mpo na bato oyo bakatama nzoto ya mibali, to mpe mpo na bato oyo bakatama nzoto ya mibali te ? Tolobaki ete kondima ya Abrayami akomisaki ye moto ya sembo na miso ya Nzambe. 10Esalamaki tango nini ? Esalamaki liboso to sima ya kokatisama nzoto ya mibali ? Te, esalamaki sima te, kasi, liboso ya kokatisama nzoto ya mibali ! 11Boye, elembo ya kokatisama nzoto ya mibali ezalaki lokola kashe ya bosembo oyo azwaki na nzela ya kondima liboso ete akatisama nzoto ya mibali. Yango wana, azali tata ya bato nyonso oyo bandimelaka Nzambe : bato oyo bakatama nzoto ya mibali te, mpo ete bango mpe bakoma bato ya sembo, 12mpe bato oyo bakatama nzoto ya mibali, ezali te mpo ete bakatama nzoto ya mibali, kasi mpo ete balandaka ndakisa ya kondima ya tata na biso Abrayami liboso ete akatisama nzoto ya mibali.

13Ezali na nzela ya Mobeko te nde Abrayami mpe bakitani na ye bazwaki elaka ete mokili ekopesamela bango lokola libula, kasi ezali nde na nzela ya bosembo oyo ewutaka na kondima. 14Pamba te, soki bato oyo batosaka mibeko nde bakozwa bomengo wana, kondima etikali lisusu na tina te mpe elaka ezali te, 15mpo ete Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzoka nde, esika Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te.

16Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe ete elaka yango ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami, kaka te mpo na baoyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na baoyo bazali na kondima moko elongo na Abrayami, oyo azali tata na biso nyonso, 17ndenge ekomama : “Nakomisaki yo tata ya mabota ebele.” Azali tata na biso na miso ya Nzambe oyo ye andimelaki, Nzambe oyo apesaka bomoi na bakufi mpe oyo azalisaka biloko oyo etikala kozala te.

18Abrayami atiaki elikya ata soki akokaki lisusu te kotia elikya, andimaki mpe akomaki tata ya mabota ebele, ndenge Nzambe aloba mpo na ye : “Bakitani na yo bakozala ebele.” 19Abrayami akomaki na mibu pene nkama moko, kasi kondima na ye elembaki te tango azalaki kotala nzoto na ye oyo ezalaki lisusu na makasi te, to mpe mpo na Sara oyo akokaki lisusu kobota te. 20Nzoka nde, na esika ya kotia tembe na elaka ya Nzambe mpe koboya kondima, kondima na ye ekomisaki ye lisusu makasi koleka mpe azalaki kopesa Nzambe lukumu, 21mpe atondisamaki na elikya ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa elaka oyo apesaki. 22Yango wana, mpo na kondima na ye, Nzambe abengaki ye moto ya sembo. 23Nzoka nde, maloba : “Nzambe abengaki ye moto ya sembo” ekomamaki kaka mpo na ye moko te, 24ekomamaki mpe mpo na biso bato oyo Nzambe abengaka bato ya sembo, biso baoyo tondimelaka Nzambe oyo asekwisaki Yesu, Nkolo na biso kati na bakufi. 25Nzambe akabaki ye ete akufa mpo na masumu na biso, mpe asekwisaki ye mpo ete tokoma bato ya sembo.
Copyright information for LinMNB