Romans 8

TOKANGOLAMI NA NZELA YA MOLIMO YA NZAMBE

Molimo oyo apesaka bomoi

1Yango wana, sikʼoyo, etumbu ezali lisusu te mpo na baoyo bazali kati na Klisto Yesu. 2Pamba te, kati na Klisto Yesu, mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi, ekangoli ngai na se ya bowumbu ya mobeko ya masumu mpe ya kufa. 3Pamba te, likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu mpo ete akoma likabo mpo na masumu. Boye, apesaki etumbu na masumu oyo ezali na nzoto ya bato. 4Asalaki bongo mpo ete bosembo oyo Mobeko esengaka, ekokisama kati na biso oyo totambolaka kolanda baposa ya nzoto te, kasi kolanda Molimo.

5Pamba te, baoyo bomoi na bango elandaka baposa ya nzoto, batiaka makanisi na bango na makambo ya nzoto. Kasi baoyo bomoi na bango elandaka makambo ya Molimo, batiaka makanisi na bango na makambo ya Molimo. 6Pamba te, baposa ya nzoto ememaka na kufa ; kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia. 7Baposa ya nzoto etombokelaka Nzambe, etosaka Mobeko na Ye te mpe ekotikala kotosa yango ata moke te. 8Bato oyo batamolaka kolanda baposa ya nzoto bakoki kosepelisa Nzambe te. 9Nzoka nde, bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Soki moto azali na Molimo ya Klisto te, azali mpe moto na Ye te.

10Boye, soki Klisto azali kati na bino, solo, nzoto na bino ekokufa mpo na masumu ; kasi Molimo azali bomoi kati na bino, pamba te bokoma bato ya sembo. 11Boye, soki Molimo na Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi na banzoto na bino oyo ebengami na kokufaka, na nzela ya Molimo na Ye oyo azali kati na bino.

12Yango wana, bandeko na ngai, tozali na niongo, kasi niongo ya nzoto te, mpo ete totambola kolanda baposa ya nzoto. 13Pamba te, soki bozali kotambola kolanda baposa ya nzoto, bokokufa ; kasi soki bobomi, na nzela ya Molimo, misala ya mabe oyo bosalaka na banzoto na bino, bokozala na bomoi. 14Pamba te, baoyo batambolisamaka na Molimo ya Nzambe, bazali bana ya Nzambe. 15Pamba te, bozwaki te molimo oyo ekomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana ya Nzambe. Mpe ezali na nzela ya Molimo wana nde togangaka : “Tata !” 16Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana ya Nzambe. 17Mpe lokola tozali bana, tozali mpe bakitani ya bomengo : bakitani ya bomengo ya Nzambe, mpe bakitani ya bomengo elongo na Klisto, pamba te soki tozali komona pasi elongo na Ye, tokozwa mpe nkembo elongo na Ye.

Elikya kati na bapasi ya tango oyo

18Nakanisi ete bapasi ya tango oyo ekokani te na motuya ya nkembo oyo ekomonana kati na biso. 19Pamba te, bikelamu nyonso ya Nzambe ezali kozela na posa makasi penza mokolo oyo Nzambe akolakisa nkembo ya bana na Ye. 20Pamba te, bikelamu nyonso ya Nzambe ezali na se ya bokonzi ya nguya oyo esukisaka na pamba, ekomaki na se ya bokonzi ya nguya yango na mokano na yango moko te, kasi na mokano ya Ye oyo atiaki yango na se ya bokonzi wana, na elikya ete 21bikelamu nyonso ya Nzambe mpe ekokangolama na bokonzi ya libebi mpo na kozwa bonsomi ya nkembo oyo bana na Nzambe bakozwa.

22Toyebi malamu ete kino sikʼoyo, bikelamu nyonso ya Nzambe ezali kolela pasi, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. 23Ezali kaka yango moko te nde ezali kolela, kasi biso mpe tozali kolela, biso baoyo tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso, tozali mpe komona pasi na mitema wana tozali kozela ete Nzambe akomisa biso penza bana na Ye mpe asikola banzoto na biso. 24Pamba te, tosila tobika, kasi kobika yango ezali nanu elikya. Nzoka nde, soki tozali komona eloko oyo tozali kotiela elikya, wana ezali lisusu elikya te, pamba te, nani akoki kotia elikya na eloko oyo azali komona ? 25Kasi, soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo, tokozela yango na kokanga motema.

26Ndenge moko mpe, Molimo asungaka biso kati na bolembu na biso. Pamba te, toyebi te nini tokoki kosenga na ndenge esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te. 27Bongo, Nzambe oyo atalaka mitema, ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe.

28Toyebi lisusu malamu ete, makambo nyonso esalamaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Nzambe, baoyo abenga kolanda mokano na Ye. 29Pamba te, baoyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa bango mpe wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele. 30Ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango, baoyo ye abenga, akomisa bango mpe bato ya sembo, mpe baoyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye.

Bolingo ya Nzambe epesaka elikya

31Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ? 32Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, boye ndenge nini akozanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye ? 33Nani akofunda bato oyo Nzambe apona ? Pamba te, Nzambe Ye moko nde akomisi bango bato ya sembo. 34Nani akokatela bango etumbu ? Pamba te, Klisto Yesu akufaki mpe asekwaki ! Avandi na loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kobondela mpo na biso. 35Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto ? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga ? 36Ndenge ekomama : “Ezali mpo na Yo nde
balukaka koboma biso mikolo nyonso,
bamonaka biso lokola
meme oyo babongisi mpo na koboma.”

37Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali solo balongi na nzela na Ye oyo alinga biso. 38Pamba te, nazali kondima ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, 39banguya ya likolo to ya se ya mabele, to eloko mosusu oyo Nzambe akela : eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe, kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.
Copyright information for LinMNB