1 Timothy 4

Mateya ya lokuta

1Nzokande, Molimo alobi polele ete na mikolo ya suka, bato mosusu bakobwaka kondima, bakolanda milimo ya lokuta mpe mateya ya milimo mabe. 2Mateya ya ndenge wana ewutaka na lokuta ya bato ya lokuta, baoyo makanisi na bango esiʼebeba, lokola nde ezika na libende ya moto. 3Bapekisaka bato babala te mpe batindaka bango balia te biloko mosusu ; oyo Nzambe asala mpo ete bandimi mpe baoyo bayebi makambo ya solo balia yango sima ya kozongisa matondi.

4Pamba te, eloko nyonso oyo Nzambe asala ezali malamu, mpe tokoki koboya eloko moko te soki tolie yango sima ya kozongisa matondi. 5Pamba te, Liloba ya Nzambe mpe mabondeli, nde ekomisaka yango bosantu. 6Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu Kristo, mosali oyo azali kozwa bilei na ye kati na maloba ya kondima mpe kati na mateya ya solo, oyo osiʼososola malamu penza. 7Boya masolo ya pamba-pamba mpe biloba-loba ya mibange ya basi.

Malendisi mpo na Timote

Mipesa mpo na kotosa makambo ya Nzambe.

8Pamba te, masano ya nzoto ezali na tina mpo na mwa makambo moke, kasi kotosa makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na makambo nyonso, mpo yango ezali na elaka mpo na bomoi ya lelo mpe mpo na bomoi oyo ekoya. 9Maloba oyo ezali ya solo mpe ezali ya kokoka mpo ete endimama.

10Pamba te, soki tozali konyokwama mpo na kosala mosala mpe tozali kobunda makasi, ezali mpo tozali kotia elikya na biso kati na Nzambeya bomoi, ye oyo azali Mobikisi ya bato nyonso, mpe koleka kutu bato oyo bandimaka elaka na ye.

11Tinda makambo oyo mpe teya yango.

12Moto moko te atiola bolenge na yo ; kasi zala ndakisa liboso ya bandimi : na maloba, na ezaleli, na bolingo, na kondima, mpe na bopeto.

13Kino tango nakoya, mipesa mpo na kotanga Makomi, mpo na koteya, mpe mpo na kolakisa. 14Komona pamba te likabo na yo, oyo Nzambe apesaki yo na nzela ya maloba ya kosakola, tango bapaka ya Lingomba batielaki yo maboko. 15Tia motema na makambo wana, mpe mipesa mobimba na yango, mpo ete bato nyonso bamona ete ozali kokende liboso. 16Batela bomoi na yo mpe mateya na yo. Tia molende kati na yango, pambate soki osali bongo, okomibikisa yo moko mpe okobikisa baoyo bayokaka yo.
Copyright information for LinMNB