Ephesians 2

Kolongwa Na Liwa Mpe Kokoma Na Bomoi

1Kala, bozalaki bakufi mpo na mabe na bino mpe mpo na masumu na bino, 2oyo bozalaki kosala tango bozalaki kolanda banzela ya mokili oyo mpe ya mokonzi ya bokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sikʼoyo kati na bato oyo bazangi botosi.

3Biso mpe, kala tozalaki na molongo na bango. Tozalaki kolanda baposa ya nzoto na biso, mpe tozalaki kosala makambo nyonso oyo nzoto na biso mpe makanisi na biso ezalaki kotindika biso mpo na kosala. Mpe tozalaki, wuta mbotama, bato oyo kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela lokola bato mosusu.

4Kasi Nzambe oyo atondi na mawa, mpo na bolingo na ye oyo eleki monene, oyo alingaki biso na yango, 5atako tozalaki naino bakufi mpo na masumu na biso, apesaki biso bomoi elongo na Kristo. Bobiki mpo na ngolu. 6Mpe Nzambe asekwisa biso elongo na Kristo mpe avandisa biso elongo na ye na bisika ya likolo, kati na Kristo Yesu. 7Asalaki bongo mpo na kolakisa na batango nyonso oyo ekoya, monene ya bomengo ya ngolu na ye, oyo alakisaki biso na bolamu na ye, kati na Kristo Yesu.

8Pamba te, bobiki mpo na ngolu, na nzela ya kondima. Mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali likabo ya Nzambe; 9yango ezali te mbuma ya misala oyo bosalaki, mpo ete moto moko te amikumisa. 10Pamba te, biso tozali bikelamo ya Nzambe, tokelama kati na Kristo Yesu mpo na kosala misala ya malamu, misala oyo Nzambe abongisa liboso penza, mpo biso tosala yango.

Bayuda Na Bato Oyo Bazali Bayuda Te Bondeko Ezongi Na Nzela Ya Yesu Kristo

11Yango wana bokanisa, bino baoyo bozalaki liboso bato ya bikolo mosusu mpo na mbotama na bino, mpe bazalaki kobenga bino “Bato bakatisa nzoto te” epai ya bato oyo bazalaki komibenga “Bato bakatisa nzoto” (kokatisama oyo esalama na nzoto na nzela ya maboko ya bato). 12Na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Kristo, bozalaki bato oyo Nzambe aponaki te, bozalaki bapaya ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozangaki elikya, mpe bozalaki na Nzambe te kati na mokili. 13Kasi sikʼoyo kati na Kristo Yesu, bino bato bozalaki liboso mosika, basili kokomisa bino pene-pene na nzela ya makila ya Kristo.

14Pamba te ye azali kimia na biso; ye moto akomisaki bayuda na bato oyo bazali bayuda te moto se moko, mpe abukaki lopango oyo ezalaki kokabola bango mpe ezalaki kotika bango ete bazala banguna. 15Na nzoto na ye, alongolaki Mibeko elongo na mitindo na yango mpe malako oyo elakisaka lolenge ya kotambola. Mokano na ye ezalaki ete akela kati na ye moko moto moko ya sika oyo awuti kati na bato mibale; na ndenge wana nde azongisaki kimia. 16Na nzela ya liwa na ye na ekulusu, Kristo asangisaki bango mibale na nzoto moko mpe azongisaki bondeko na bango na Nzambe; na nzela ya ekulusu, Kristo abomaki boyinani oyo ezalaki kati na bango.

17Kristo ayaki mpe ateyaki kimia epai na bino bato bozalaki mosika, mpe kimia epai ya baoyo bazalaki pene-pene. 18Pamba te, na nzela na ye, biso nyonso mibale tozali na ndingisa ya kokota epai ya Tata na nzela ya Molimo kaka moko.

19Yango wana, bozali lisusu bapaya te to mpe bawuta te, kasi bozali basitwaye elongo na basantu, mpe bato ya libota ya Nzambe; 20batonga bino likolo ya fondasio ya bapostolo mpe baprofeta, mpe Kristo Yesu ye moko azali libanga ya motuya oyo esimbaka ndako mobimba.

21Na ye, ndako mobimba esangani esika moko mpe ezali kokola, mpo ekoma ndako ya bosantu kati na Nkolo. 22Mpe, kati na ye, bino mpe bozali kotongama lisanga, mpo bokoma ndako epai Nzambe azali kovanda na nzela ya Molimo na ye.
Copyright information for LinMNB