Luke 10

Yesu atindi bayekoli na ye ntuku sambo na mibale

1Sima na yango, Nkolo aponaki lisusu bayekoli ntuku sambo na mibale, mpe atindaki bango mibale-mibale liboso na ye, na bavile nyonso mpe na bisika nyonso oyo ye moko asengelaki kokende. 2Alobaki na bango :

—Bambuma ezali mingi na elanga, kasi basali bazali moke ! Yango wana bosenga Nkolo ya elanga mpo atinda basali na elanga na ye.
3Bokende ; natindi bino lokola bana ya meme na kati ya bambwa ya zamba. 4Bomema libenga te, sakasi te, basandale te ; mpe bopesa moto moko te mbote na nzela.

5Tango bokokota na ndako moko, boloba liboso : “Kimia ezala na ndako oyo !” 6Soki moto ya kimia azali wana, kimia na bino ekovanda likolo na ye. Soki te, kimia yango ekozongela bino. 7Bovanda na ndako wana, bolia mpe bomela nyonso oyo bakopesa bino, pamba te “mosali asengeli kozwa lifuti na ye.” Mpe bokota na ndako moko na moko te.

8Soki bokoti na vile moko mpe bayambi bino, bolia oyo bakopesa bino, 9bobikisa bato ya maladi oyo bokokuta kuna, mpe boloba na bango : “Bokonzi ya Nzambe ekomi pene-pene na bino.” 10Kasi na vile nyonso oyo bokokota mpe bakoboya koyamba bino, bokende na bala-bala na yango mpe boloba : 11“Ata pusiele ya vile na bino, oyo ekangamaki na makolo na biso, topupoli yango mpo na bino. Kasi boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene.”

12—Nalobi na bino, na Mokolo wana, etumbu ya vile wana ekoleka oyo ya Sodomo.

13Mawa na yo Korazini ! Mawa na yo Betsayida ! Pamba te, soki makamwisi oyo esalamaki epai na bino esalamaka na Tire mpe Sidoni, mbele kala penza balingaki kobongola mitema, mpe kolakisa yango, na kolata saki mpe na komipakola putulu. 14Kasi na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekolela oyo ya Tire mpe Sidoni. 15Bongo yo Kapenawumi, okanisi ete bakotombola yo kino na likolo ? Te, bakobwaka yo tii na mboka ya bakufi.

16Moto oyo akoyokela bino, ayokeli ngai ; moto oyo akoboya bino, aboyi ngai ; mpe moto oyo aboyi ngai, aboyi Oyo atindaki ngai.

17Bayekoli ntuku sambo na mibale bazongaki na esengo, mpe balobaki :

—Nkolo, ata milimo mabe batosaki biso na kombo na yo !
18Bongo Yesu azongiselaki bango :

—Namonaki Satana kokweya wuta na likolo lokola kongenga ya kake !
19Boyoka : napesaki bino bokonzi ya konyata banyoka, bankoto mpe bokonzi likolo ya nguya nyonso ya monguna ; mpe eloko ata moko te ekokoka kosala bino mabe. 20Nzokande, bosepela te mpo milimo etosaki bino, kasi bosepela mpo bakombo na bino ekomama na Likolo.

Bolamu ya bayekoli

(Mt. 11.25-27)

21Kaka na tango wana, Yesu atondaki na esengo na nzela ya Molimo Mosantu, mpe alobaki :

—E e Tata, Nkolo ya likolo mpe ya nse, nakumisi yo pamba te obombi makambo oyo na bato ya bwania mpe na bato ya mayele, mpe olakisi yango na bana mike. E e Tata, pamba te olingaki bongo.
22Tata na ngai apesaki ngai makambo nyonso. Moto moko te ayebi soki Mwana azali nani, longola kaka Tata. Mpe moto moko te ayebi soki Tata azali nani, longola kaka Mwana, mpe moto oyo Mwana alingi kolakisa ye Tata.

(Mt. 13.16-17)

23Sima abalukaki epai ya bayekoli na ye mpe alobaki kaka na bango moko :

—Esengo mingi na bato oyo bazali komona makambo oyo bino bozali komona !
24Pamba te nalobi na bino : baprofeta mingi mpe bakonzi mingi balukaki komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; balingaki koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.

Lisapo ya moto malamu ya Samariya

25Molakisi moko ya Mibeko atelemaki mpo na komeka Yesu ; bongo atunaki :

—Moteyi, esengeli nasala nini mpo nazwa bomoi ya seko ?

26Yesu atunaki ye :

—Bokoma nini na Mibeko na biso ? Makambo nini otangaka kuna ?

27Molakisi ya Mibeko azongisaki :

—Linga Nkolo Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na elimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso, mpe na makanisi na yo nyonso ; mpe linga moninga na yo lokola yo moko.

28Yesu alobaki na ye :

—Opesi eyano malamu ; sala bongo mpe okozala na bomoi.

29Kasi molakisi ya Mibeko alingaki kaka komilongisa, bongo atunaki Yesu :

—Nani azali moninga na ngai ?

30Yesu azongisaki :

—Moto moko awutaki na Yeruzalem mpe azalaki kokende na Zeriko, kasi na nzela miyibi bakangaki ye, babotolaki ye bilamba na ye, babetaki ye, mpe bakendaki na bango ; bongo batikaki ye pene ya liwa.
31Nganga-Nzambe moko azalaki koleka na nzela wana. Tango amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akendaki na ye. 32Ndenge moko mpe, molevi moko akomaki na esika yango, amonaki ye, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akendaki na ye. 33Kasi moto moko ya Samariya azalaki na mobembo, akomaki epai ya moto wana azalaki ; tango amonaki ye, ayokelaki ye mawa, 34apusanaki pene-pene na ye, atiaki mafuta mpe vino na bapota na ye, mpe akangaki yango. Sima amatisaki ye likolo ya mpunda na ye, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe asalisaki ye malamu penza. 35Mokolo oyo elandaki, abimisaki badeni mibale mpe apesaki yango na nkolo ndako ya bapaya, mpe alobaki na ye : “Salisa moto oyo malamu ; mbongo nyonso mosusu oyo okobimisa mpo na kosalisa ye, nakozongisela yo yango tango nakozonga !”

36Bongo Yesu atunaki :

—Mpo na yo, nani kati na bango misato amilakisaki ete azali moninga ya moto oyo akweyaki na maboko ya miyibi.

37Molakisi ya Mibeko azongisaki :

—Oyo ayokelaki ye mawa. Bongo Yesu alobaki na ye :

—Kende mpe sala bongo !

Mariya aponi likabo oyo eleki malamu

38Tango bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko. Kuna, mwasi moko kombo na ye Marta ayambaki ye na ndako na ye. 39Azalaki na ndeko moko ya mwasi kombo na ye Mariya. Ye ayaki kovanda pembeni ya Yesu mpe azalaki koyoka oyo Yesu azalaki koloba. 40Kasi Marta amipesaki mobimba na misala ebele. Bongo ayaki epai ya Yesu mpe alobaki na ye :

—Nkolo, ozali komona mabe te awa ndeko na ngai atiki ngai moko nasala misala nyonso ? Loba na ye aya kosalisa ngai !

41Kasi Nkolo azongiselaki ye :

—Marta, Marta, ozali komitungisa mpe komiyokisa pasi mpo na makambo ebele ;
42kasi likambo moko kaka nde ezali na tina monene. Mariya aponi likabo oyo eleki malamu, bakobotola ye yango te !
Copyright information for LinMNB