Luke 3

MABONGISI YA MOSALA YA YESU

Jean Batiste ntoma ya Nzambe

(Mt. 3.1-10 ; Mk. 1.1-6)

1Tango Tibere Sezare akokisaki bambula zomi na mitano na bokonzi na ye, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yudea, Erode azalaki mokonzi ya Galileya mpe ndeko na ye Filipi azalaki mokonzi ya Itureya mpe Trakonite, mpe Lisaniasi azalaki mokonzi ya Abilene. 2Bongo Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya banganga-Nzambe. Liloba ya Nzambe eyaki epai Jean mwana ya Zakariya, kati na esobe. 3Jean akendaki na ekolo mobimba oyo ezalaki pembeni na mayi ya Yordani ; azalaki koteya : “Bozwa libatisi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema ; bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino !” 4Ndenge ekomama na buku ya maloba ya moprofeta Ezayi : Mongongo ya moto ezali koganga na esobe :
Bobongisa nzela ya Nkolo,
bosalela ye banzela oyo etengama te !
5lubwaku
lubwaku  : na lopoto “vallée
nyonso ekotondisama,
Ngomba nyonso ya monene
mpe oyo ya moke ekolalisama,
babala-bala ya kotengama bakokomisa yango alima
mpe banzela ya mabanga-mabanga
bakokomisa yango malamu.

6 Bongo bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe !

7Jean azalaki koloba na bato oyo bazalaki koya mpo na kozwa libatisi epai na ye :

—Bino mabota ya banyoka ! Nani akebisi bino ete bokima kanda oyo ezali koya ?
8Bobota mbuma oyo ebongi mpo na bato oyo bobongoli mitema. Mpe botika koloba na nse ya mitema na bino : “Abraham azali tata na biso !” Pamba te, nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abraham bana wuta na mabanga oyo !

9Epasola koni esiʼebongisami mpo na kokata misisa ya nzete ; nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te, bakokata yango mpe bakobwaka yango na moto !

10Ebela ya bato batunaki ye :

—Esengeli tosala nini ?

11Jean azongisaki :

—Moto oyo azali na kazaka mibale, apesa moko na oyo azangi yango. Moto oyo azali na biloko ya kolia asala mpe ndenge moko.

12Bafutisi mpako bayaki mpe mpo na kozwa libatisi ; bongo batunaki Jean :

—Moteyi, tosengeli kosala nini ?

13Azongiselaki bango :

—Tango bofutisaka mpako bobakisa mbongo mosusu te likolo ya oyo batindaka bino !

14Basoda mpe batunaki ye :

—Bongo biso, tosengeli kosala nini ? Jean azongiselaki bango :

—Bobotola bato mbongo te mpe bofunda bato na ndenge ya lokuta te ; kasi botalela kaka lifuti na bino.

15Bato bazalaki kozela na elikya monene mpe bango nyonso bazalaki komituna-tuna na nse ya mitema, soki Jean azali Kristo.

16Jean azongiselaki bango nyonso :

—Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi moto moko azali koya, aleki ngai na nguya, mpe nazali ya kokoka kutu te mpo na kofungola basinga ya ba sandale na ye. Ye moto akobatisa bino na Molimo Mosantu mpe na moto.
17Asimbi kiyungulu na maboko na ye, akopetola esika na ye oyo batutelaka mbuma ; mpe akobomba ble na ebombelo na ye ; kasi akotumba matiti na moto moko oyo ekufaka te !

18Jean azalaki kolendisa bato mpe azalaki koteya bango Sango-Malamu na maloba mosusu mingi.

(Mt. 14.3-4 ; Mk. 6.17-18)

19Kasi Jean apamelaki mokonzi Erode mpo na Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo asalaki lisusu makambo mingi ya mabe. 20Erode abakisaki lisusu mabe oyo, likolo ya mabe na ye nyonso : Atiaki Jean na boloko.

Yesu azwi libatisi

(Mt. 3.13-17 ; Mk. 1.9-11)

21Tango bato nyonso bazwaki libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Awa azalaki kobondela, likolo efungwamaki 22mpe Molimo Mosantu akitaki likolo na ye, na lolenge ya pijon. Bongo mongongo moko ewutaki na Likolo :

—Ozali mwana na ngai ya bolingo ; osepelisaka ngai mingi penza !

Bakoko ya Yesu

23Yesu akomaki pene-pene na bambula ntuku misato tango abandaki mosala na ye. Bato bazalaki kokanisa ete azalaki mwana ya Zozefi, mwana ya Eli, 24mwana ya Matati, mwana ya Levi, mwana ya Melki, mwana ya Zanai, mwana ya Zozefi, 25mwana ya Matatiasi, mwana ya Amosi, mwana ya Nahumi, mwana ya Esli, mwana ya Nagai, 26mwana ya Maati, mwana ya Matatiasi, mwana ya Semeini, mwana ya Zoseki, mwana ya Zoda, 27mwana ya Zoanani, mwana ya Reza, mwana ya Zorobabele, mwana ya Sabatiele, mwana ya Neri, 28mwana ya Melki, mwana ya Adi, mwana ya Kosami, mwana ya Elmadami, mwana ya Eri, 29mwana ya Zosue, mwana Eliezeri, mwana ya Zorimi, mwana ya Matati, mwana ya Levi, 30mwana ya Simeon, mwana ya Yuda, mwana ya Zozefi, mwana ya Zonami, mwana ya Eliakim, 31mwana ya Meleya, mwana ya Mena, mwana ya Matata, mwana ya Natan mwana ya David, 32mwana ya Isayi, mwana ya Obedi, mwana ya Boazi, mwana ya Salmon, mwana ya Nason, 33mwana ya Aminadab, mwana ya Admina, mwana ya Arni, mwana ya Esromi, mwana ya Farezi, mwana ya Yuda, 34mwana ya Zakobi, mwana Izaki, mwana ya Abraham, mwana ya Tera, mwana ya Nakor, 35mwana ya Serusi, mwana ya Ragau, mwana ya Faleki, mwana ya Eber, mwana ya Sala, 36mwana ya Kayinami, mwana ya Arfazadi, mwana na Semi, mwana ya Nowa, mwana ya Lemeki, 37mwana ya Matusala, mwana ya Enoki, mwana ya Zaredi, mwana ya Maleleel, mwana ya Kayinami, 38mwana ya Enosi, mwana ya Seti, mwana na Adam, mwana ya Nzambe.
Copyright information for LinMNB