Psalms 122
Bosambela mpo na kimia ya Yeruzalem
Nzembo ya David. Nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe
1 Nasepelaki na baoyo
balobaki na ngai :
“Tokende na Ndako na Yawe.”
2 Makolo na biso etelemi
na baporte na yo, Yerusalem.
3Yeruzalem etongama lokola vile oyo ezali esika moko.
4 Kuna nde eyaka mabota, mabota ya Yawe
ndenge ekomama na Mobeko oyo Isayele azwaki na
ndenge bikateli epesama epai ya Isayele.
5 Kuna etelemi bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa
bakiti ya bokonzi ya ndako ya David
6 Bobondela mpo na kimia ya Yeruzalem :
“tika ete baoyo balingaka yo bazala na kimia.
7 Tika ete kimia ezala na bamur na yo,
mpe kimia na bandako na yo ya minene !”
8 Mpo na bandeko na ngai mpe baninga na ngai,
nakoloba : “Kimia ezala kati na yo !”
9 Mpo na Ndako ya Yawe Nzambe na biso,
nakoluka bolamu na yo.
Copyright information for
LinMNB