Psalms 124

Lisungi na biso ewutaka na Yawe

Nzembo ya David ; nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Soki Yawe azalaki te na ngambo na biso,
tika ete Isayele aloba.

2 Soki Yawe azalaki te na ngambo na biso,
tango bato bayaki kobundisa biso,

3 Tango kanda na bango engalaki mpo na biso,
mbele balingaki komela biso na bomoi ;

4 mpela elingaki kodindisa biso,
mayi ya monene elingaki komema biso ;

5 bamayi ya bambonge ya makasi
elingaki komema biso.

6 Masanzoli ezali epai ya Yawe,
oyo andimaki te ete mino na bango epasola biso

7 tokimaki lokola ndeke oyo abimi na motambo
ya moto oyo akangaka bandeke ;
motambo ekatanaki, mpe tokimaki.

8 Lisalisi na biso ezali kati na kombo na Yawe,
mozalisi ya likolo mpe mokili.
Copyright information for LinMNB