Psalms 13
Kobanga mpe kotia elikya
Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.
1Yawe, kino tango nini okobosana ngai ? Kino tango nini okobombela ngai elongi na yo ?2 Kino tango nini na komitungisa
na kati na makanisi na ngai,
mpe mawa mikolo nyonso kati na motema na ngai ?
Kino tango nini monguna na ngai
akozala kaka kolonga ngai ?
3 Yawe Nzambe na ngai,
tala mpe zongisela ngai eyano !
Ngengisa miso na ngai,
soki te na kolala pongi ya liwa ;
4 monguna na ngai akoloba ete :
“Nalongi ye !”
Mpe, bayini na ngai
bakosepela tango nakokweya.
5 Kasi ngai nazali kotia elikya na ngai
na bolingo na yo ya makasi ;
motema na ngai ezali kosepela
mpo na lobiko na yo.
Nakoyembela Yawe,
mpo asaleli ngai bolamu.
6 ▼
▼ This verse is missing in the original text, possibly because in this translation some nearby verses have been joined together.
Copyright information for
LinMNB