Titus 1

Mbote

1Ngai Polo, mowumbu ya Nzambe mpe mopostolo ya Yesu Kristo. Nzambe apona ngai mpe atinda ngai mpo nasunga kondima ya bato oyoye apona mpe nakamba bango na nzela ya koyeba makambo ya solo oyo ememaka na kotosa makambo ya Nzambe ; 2kondima mpe boyebi oyo evandi likolo ya elikya ya bomoi ya seko. Bomoi oyo, Nzambe oyo akosaka te alakaki biso wuta kala liboso ya ebandeli ya Tango. 3Mpe tango eleko oyo ye atiaki ekokaki, alakisaki Liloba na ye na polele nyonso, na nzela ya mateya oyo bapesaki ngai, na etinda ya Nzambe Mobikisi na biso.

4Natindi mokanda oyo na Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali na yango :

—Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzamba Tata mpe na Kristo Yesu Nkolo na biso, ezala na yo.

Kotiama ya bampaka na Lingomba

5Tina oyo natikaki yo na krete ezalaki ete obongisa makambo oyo etikalaki mpo na kobongisa, mpe otia bampaka ya Lingomba kati na vile moko na moko, ndenge natindaki yo. 6Paka ya Lingomba esengeli azala moto oyo azangi mabe, azala mobali ya mwasi moko kaka, bana na ye basengeli kozala bandimi mpe bazala te bana oyo bato bakoki koloba-loba mpo na bango ete bazali bana ya mobulumpe bana oyo bazangi botosi.

7Pamba te, esengeli ete mokengeli ya Lingomba azala na mabe te, mpomokumba ya mosala ya Nzambe ezali likolo na ye. Yango wana, esengeli azala moto ya lofundu te, moto oyo asilikaka noki te, moto oyo amipesa na masanga te, moto oyo aswanaka te, mpe moto oyo alukaka kozwambongo na banzela ya soni te.

8Kasi esengeli azala moto oyo ayambaka bapaya malamu, moto oyo alingaka makambo ya malamu, moto ya bwanya, moto na sembo, mosantu, mpe oyo ayebi komibatela malamu. 9Esengeli asimba makasi penza Liloba ya solo oyo bateyaki ye, mpo ete akoka kolendisa bato mosusu na nzela ya mateya ya solo, mpekosukisa baoyo batiaka tembe na yango.

Mpo na bateyi ya lokuta

10Pamba te, bato mingi bazali batomboki, bato ya biloba-loba mpebakosaka bato ; mingi penza baoyo bazali na lisanga ya bato bakatisa nzoto. 11Esengeli okangisa bango minoko, pamba te bazali kobebisa mabotamingi na nzela ya koteya makambo oyo bakoki koteya te ; mpe basalaka bongo mpo na kozwa mbongo na banzela ya nsoni.

12Moto moko na kati ya baprofeta ya bato ya Krete alobaki : Bato ya Krete bazalaka tango nyonso
bato ya lokuta ;
bazali banyama ya mabe penza,
bato ya lokoso
mpe bagoigoi.

13Makambo alobaki ezali ya solo. Yango wana pamela bango makasipenza, mpo ete bazala peto kati na kondima 14mpe bakangama te na masapo ya bayuda, to mpe na mibeko ya baoyo baboyaka makambo ya solo.

15“Mpo na ba oyo bazali peto, biloko nyonso ezali peto” ; kasi eloko moko te ezali peto mpo na baoyo bazali na bosoto mpebazangi kondima. Pamba te, makanisi na bango mpe mitema na bango ezali na bosoto. 16Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka ye na nzela ya makambo oyo basalaka. Bazali bato mabe, bato bazangi botosi, mpe bazali na makoki te mpo na kosala ata likambo moko ya malamu.
Copyright information for LinMNB