‏ 1 Kings 11:41-43

Kufa ya Salomo

(2Ma 9.29-31)

41Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Salomo, misala na ye nyonso mpe bwanya na ye, ekomama kati na buku ya misala ya Salomo. 42Salomo akonzaki Isalaele mobimba mibu tuku minei, na Yelusalemi. 43Sima na yango, Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.
Copyright information for LinMNB