1 Kings 15:13-15
13Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi ; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron. 14Nzokande, atako abebisaki te bisambelo ya likolo ya bangomba, Asa abatelaki motema na ye sembo na miso ya Yawe, na mikolo nyonso ya bomoi na ye. 15Azongisaki kati na Tempelo ya Yawe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki : palata, wolo mpe biloko mosusu.
Copyright information for
LinMNB