2 Chronicles 2:10-13
10 ▼▼2:11 in most Bibles.
Irami, mokonzi ya Tiri, azongiselaki Salomo na mokanda : — Ezali mpo ete Yawe alingi bato na Ye nde akomisi yo mokonzi na bango. 11 ▼▼2:12 in most Bibles.
Irami alobaki na ye lisusu : — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, Mokeli ya likolo mpe se, apambolama, mpo ete apesi na mokonzi Davidi mwana mobali ya mayele mpe ya bososoli, oyo akotonga Tempelo mpo na Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko. 12 ▼▼2:13 in most Bibles.
Nazali kotindela yo sik’oyo Urami-Abi ; azali penza moto moko ya mayele oyo ayebi mosala malamu. 13 ▼▼2:14 in most Bibles.
Mama na ye azalaki moto ya libota ya Dani, mpe tata na ye, moto ya Tiri. Abongisama mpo na misala ya wolo, ya palata, ya bronze, ya ebende, ya mabanga, ya mabaya, ya kotia langi ya motane makasi, ya ble, ya motane ya pete mpe ya kobongisa lino ya pete. Ayebi malamu mosala ya kotobola bililingi, mpe akoki kosala mosala nyonso oyo bakosenga ye. Akosala elongo na basali na yo mpe na basali ya nkolo na ngai, Davidi, tata na yo.
Copyright information for
LinMNB