2 Chronicles 33:18-20
(2Ba 21.17-18)
18Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Manase, libondeli na ye epai ya Nzambe na ye mpe maloba oyo bamoni makambo balobaki na ye na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 19Libondeli na ye mpe ndenge Yawe alimbisaki mabe na ye, masumu na ye nyonso, bozangi boyengebene na ye epai ya Nzambe, molongo ya bisika nyonso epai wapi atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atelemisaki makonzi ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe oyo azalaki kofukamela liboso ete ayokisama soni, nyonso wana ekomama kati na mikanda ya Ozayi. 20Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Copyright information for
LinMNB