‏ 2 Chronicles 33:21-25

Amoni, mokonzi ya Yuda

(2Ba 21.19-24)

21Amoni azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mibale na Yelusalemi. 22Amoni asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Manase, tata na ye, asalaki ; agumbamelaki banzambe nyonso ya bikeko oyo Manase, tata na ye, asalaki mpe abonzelaki yango bambeka. 23Amoni amikitisaki te lokola Manase, tata na ye, liboso ya Yawe, kasi asalaki lisusu mabe koleka. 24Bakalaka na ye basalelaki ye likita mpe babomaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi. 25Kasi bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita ; mpe na esika na ye, bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi.
Copyright information for LinMNB